Makita ya malamu
1 Lokola basaleli ya Nzambe na ntango ya kala, Batatoli ya Yehova bayanganaka mpo ete ‘báteyama na Yehova.’ (Yis. 54:13) Basalaka makasi ete bázala na makita, koyebáká ete Yehova azali kopesa bango bilei ya elimo na ntango ebongi na nzela ya Yesu Klisto mpe na nzela ya esaleli oyo azali kosalela awa na mabelé, “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Makita yango mazali kozwa ntango na biso mingi. Na yango, tolingi ete makita yango mápesa biso matomba, mákumisa Yehova mpe mápesa nzela na kotonga libota na ye. Ndambo ya batoli to mpe makundoli oyo elandi ekosalisa biso na kosala ete makita na biso mázala malamu.
2 Koteya na ntango ya likita ya bato banso: Molóbi akosɛnzɛla ete asalela maloba oyo bato bazali koya na Ndako ya Bokonzi mpo na mbala ya liboso bakoyeba yango. Mposa na biso ezali ya kosalisa bato, kasi ya kotyola bango te; tokoyokisa bango nsɔ́ni te, kasi tokosimba nde makoki na bango ya kokanisa mpe bososoli na bango. Na ndakisa, soki lisukúlu lizali kolobela evolisyó, molóbi asengeli te kopesa makanisi na lolenge ya kosɛka baoyo bandimaka liteya yango. Soki lisoló yango esalemi na lolenge ya kosɛkisa, tokolamwisa ata mposa moko te epai na baoyo bandimaka evolisyó.
3 Koteya na ntango ya boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli: Ndeko oyo azali kotambwisa boyekoli akopɛngola ete maloba ya ebandeli mázala milaimilai te. Akotánga mituna miyokani na baparagrafe mpe akopesa maloba epai na bayangani oyo batomboli mosapi engebene ntango oyo epesami. Akolendisa bayangani ete bápesa bakomantɛrɛ ya mikuse mpe oyo ebongi mpo ete biyano mingi bikoka kopesama na motuna mokomoko. Akosala na boye ete bayangani mingi bákoka koloba na boumeli ya boyekoli. Likoki ezali ya kolendisa bato oyo bázalaka nsɔ́ninsɔ́ni na koponáká bango liboso mpo na kotánga bavɛrsɛ́ ya Biblia oyo bayangani mosusu bakopesa bakomantɛrɛ soki ntango ezali. Ndeko oyo azali kotambwisa boyekoli akoki ye moko kobakisa mwa maloba soki likanisi moko ya ntina lipesami te na ntango ya botaleli paragrafe. Nzokande asengeli te kosala yango ntango nyonso, mpe komantɛrɛ na ye ekozala ntango nyonso mokuse.
4 Makanisi ya ntina ya boyekoli mayokanaka na mituna oyo mizali na etánda ya bozongeli. Na bongo, tokosɛnzɛla ete tóyebisa makanisi yango ya ntina na boumeli ya boyekoli.
5 Soki boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali kotalela vɛrsɛ́ mokomoko ya mokapo moko ya Biblia, esengeli koyebisa yango na ebandeli ya boyekoli. Soki ezali bongo, ekozala litomba kosɛnga ete vɛrsɛ́ mokomoko etángama liboso ya kotuna motuna ya paragrafe yango.
6 Epai mosusu, lisoló oyo ezali kotalelama atako ezali ya lolenge nini, ndeko oyo azali kotambwisa boyekoli akobyanga bayangani ete bákamata Biblia mpo na kotánga bavɛrsɛ́ ya ntina. Mpo na botaleli malamu ya lisoló, akosɛnzɛla ete alekisa ntango mingi te na baparagrafe ya ebandeli, kasi akotya mpenza likebi nde na baparagrafe ya moboko ya lisoló ya boyekoli, oyo ezali na makanisi maleki ntina.
7 Mpo na oyo etali bosangani ya bayangani, ndeko akopesa maloba epai na bana na lolenge ya mayele mpe oyo ebongi. Ezali malamu te kopesaka ntango nyonso maloba epai na bana mingimingi soki ezali baparagrafe ya ntina oyo ezali kosɛnga ndimbola ya polele mpe ya molai.
8 Koteya na ntango ya makita ya mosala: Masoló oyo makotalelama na lolenge ya mituna mpe biyano esengeli te kozala na maloba milaimilai na ebandeli. Maloba ya ebandeli oyo mazali mokuse mazalaka malamu. Mituna mikozala polele, sikisiki, kozanga mindɔndɔ́ mpe misengeli koyokana na makambo mazali kati na baparagrafe. Na kotalela ntango oyo epesami, ezalaka mbala mosusu malamu kotángisa baparagrafe ya ntina ya eteni oyo ezali kotalelama. Ndeko oyo azali kokamba lisoló yango akotya likebi na maloba ya ntina oyo mazali na bavɛrsɛ́ epesami mpe akomonisa lolenge ya kosalela yango na boyokani na motó ya lisoló oyo lizali kotalelama. Wana tozali kobongisa bilakiseli, tosengeli kotalela bamposa ya lisangá mpe makambo oyo tokutanaka mpenza na yango kati na mosala ya kosakola; ekozala mpe malamu komonisa botɛmɛli oyo tokutanaka na yango kati na teritware mpe lolenge ya kolónga yango. Lisusu, tokomonisa lolenge ya kosala ntango bato baboyi mikanda na biso. Bilakiseli wana bikomonisa makambo oyo masalemaka mpenza solo. Na makambo nyonso, tosengeli kopɛngola bilakiseli oyo bizali kolekisa mpenza ndelo, oyo bizali te komonisa makambo ndenge yango esalemaka.
9 Soki basangani ya lisangá bazalaka te na momeseno ya koyebisa nsango malamu na lolenge ya libaku malamu, bankulutu bakozwa ntango, na boumeli ya likita ya mosala, ya koyebisa makambo to komonisa bilakiseli na lolenge ya kopesa litatoli ya libaku malamu.
10 Bobele “Mayebisi” matali lisangá nde masengeli kotángama, mpe kati na “Bansango ya Teokrasi” tokoki mbala mosusu kokɔtisa makambo mazwami na Annuaire; mpo na bamboka oyo eyebani mingi te, tosengeli koyebisa esika oyo mboka yango ezwami.
11 Ndeko oyo akobandisa likita ya mosala asengeli te kotombela bayangani boyei malamu, mpamba te basilaki kotombela bango boyei malamu na ebandeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi (na momeseno Eteyelo esalemaka liboso ya likita ya mosala).
12 Nkomá oyo la Société atindaka mbala na mbala na masangá esengeli kotángama na esengo, kasi na lolenge ya lisɛki te. Na kotalela ntina na yango, mingimingi ezali malamu ete nkulutu moko atánga yango; libosoliboso, akotya mikɔlɔ́tɔ́ na maloba ya moboko mpe na makanisi ya ntina ya nkomá yango. Ntango mosusu, ekozala malamu konyata maloba na kozongeláká makanisi ya ntina ya nkomá yango.
13 Koteya na ntango ya Ekaniseli: Lisukúlu ya Ekaniseli esengeli te kopesama na molóbi moko nsima na mosusu kolandáká ngala ya moto na moto mpo ete bankulutu nyonso bákoka kosala yango. Na kotalela ntina ya likita wana, bobele moteyi to bateyi malamu koleka kati na lisangá nde bakosala lisukúlu ya Ekaniseli, ata soki basilaki kosala yango liboso. Tokosalela maloba ya pɛtɛɛ, oyo bayangani oyo bazali koya mpo na mbala ya liboso na Ndako ya Bokonzi bakoyoka yango. Masangá oyo mazali pembeni na Betele makoki, na kokanáká yango libosoliboso, kosɛnga na la Société ete atindela bango molóbi moko. Lisusu, soki mokɛngɛli ya zongazonga to ya etúká azali kotala lisangá moko, ekozala malamu kosalela bango mpo na kosala lisukúlu ya Ekaniseli, na lisangá oyo bazali kotala to kati na lisangá oyo ezali pembeni.
14 Mwa makambo oyo tosengeli koyeba: Mpo na oyo etali loyembo, tozali kokundwela bino ete ezali malamu kolobela motó ya likambo ya loyembo mpe vɛrsɛ́ ya Biblia epai yango ezwami. Ezali malamu ete bayangani báyembaka na motema moko. Ndeko oyo azali kotalela makambo matali ekoliseli-loláká (sonorisation) akomindimisa ete volimi ya miziki ebongi, mpamba te ekómaka ete mongongo ya bayangani ezali koyokanisa miziki te. Yango ezalaka mingimingi mabe soki loyembo yango eyebani malamu te na bayangani.
15 Ntango bato bayei mpo na mbala ya liboso na Ndako ya Bokonzi, ezali malamu koyamba bango na mɔ́tɔ nyonso. Bayangani bakotala te na miso mabe bato wana ya sika, ata soki bazali koloba to soki balati na lolenge lokeseni na oyo ya biso. Bato ya lolenge nyonso bakoki kosepela na makita na biso. Bisika na biso ya losambo ezali mpo na bato nyonso. Esalemaka ete ata bapolisi to bakonzi ya kartyé bazali koya mpo na kotala lolenge makita na biso esalemaka, mpe bango nyonso basengeli komiyoka ete bayambami malamu.
16 Tokopɛngola mpe maloba mosusu ya libungá na Lifalansé ntango tozali koloba epai na bandeko mibali to bandeko basi ya lisangá. Talá mwa ndambo na maloba yango:
—Ezali mabe koloba ‘le frère Songolo akosala libondeli’ to ‘la sœur Fulani akosala lisoló boye.’ Maloba ‘frère’ to ‘sœur’ masengeli te kozala na article liboso na yango. Ezali malamu koloba ‘Frère Songolo akosala libondeli’ to ‘Sœur Fulani akosala lisoló lilandi.’ Bobele bongo, elobeli oyo ete “ba la sœurs,” “ba les frères” ezali malamu te. Elobeli oyo elongobani ezali bongo “bandeko basi” to “ba sœurs,” “bandeko mibali” to “ba frères.” Lisusu, na esika ya koloba “bato nyonso tous” ekozala malamu koloba “bato nyonso.”
—Toyokaka mbala mingi bandeko koloba na Lifalansé ete: “Frère Untel nous servira par la prière.” Elobeli wana ezali malamu te. Ezali bongo malamu koloba ete: “Frère Untel prononcera (ou fera) la prière.” Lisusu, tosengeli kopɛngola elobeli oyo ete: “Sous le couvert de la prière.” Nzokande, tosengeli koloba ete “la réunion est placée sous la direction de l’esprit saint” to “une décision a été prise dans la prière.”
—Na esika ya koloba na Lifalansé ete “bonté imméritée de Jéhovah,” elongobani mpenza mpe eyokani na Biblia koloba ete “faveur imméritée” elingi koloba “ngɔlu ya Yehova.”
—Tosengeli mpe kopɛngola mabungá oyo babéngi na Lifalansé fautes de liaison, lokola oyo eyokamaka mingi, oyo ya kobakisa na lolenge ya mabe ‘t’ na troisième personne du singulier (moí-lisoló wa isatu na bɔɔkɔ) na makelelo (verbes) mosusu. Na ndakisa, “il va-t-être”; ezali malamu koloba “il va être.”
17 Na mwa makambo oyo touti komonisa, tolingi te kolekisa ndelo soko mpe kobimisa kowelana soki mabungá motindo wana mazongelami. Ezali bobele mwa makanisi mapesami oyo makosalisa biso ete tóloba na lolenge elongobani, yango ekopesa nzela ete makita na biso mázala malamu.
18 Na ntembe te, bomoni ete mingi kati na batoli epesami awa etaleli mingi lolenge maloba mazali kolobama kasi ndimbola na yango te; na elobeli mosusu, emonisi mingimingi lolenge ya kotambwisa makita mpe ya kosala masoló. Ekoki komonana na miso na bino lokola makambo mikemike, nzokande yango ezali na ntina soki tolingi ete makita na biso mázala ya kolendisa mpe ya malamu. Soki tozali koyeba ntina ya kosɛnzɛla ntango nyonso mpo na kobongisa yango lisusu, boye yango ekokumisa mpenza Yehova. Basangani nyonso ya lisangá bakozela yango na esengo nyonso, koyebáká ete bakotongama na yango mpe bakolendisama na elimo. Tósala milende biso banso ete makita na biso mázala ntango nyonso malamu!