Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Mársi: Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! Apríli mpe Máí: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Yúni: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Kati na pɔ́sɔ mpe na bateritware oyo esakolami mingi, tokoki kosalela mwa búku ya sika Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
◼ Biro etindi na lisangá mokomoko liboke ya baformilɛ́rɛ mpo na kokokisa bamposa ya mobu mobimba. Tozali kosɛnga na bino ete bósalela yango bobele mpo na likambo oyo esengeli na yango kasi te mpo na banɔ́ti na bino moko.
◼ Basakoli oyo balingi kozala babongisi-nzela basungi na Mársi (oyo), na Apríli mpe na Máí basengeli komibongisa uta sikawa mpe kotondisa noki lokasa ya lisɛngi. Yango ekopesa nzela na bankulutu ete bázwa bibongiseli ya ntina mpo na mosala ya kosakola mpe kolɛngɛla bazulunalo oyo ekoki mpe mikanda mosusu. Bankombo ya baoyo nyonso lisɛngi na bango ekondimama ekoyebisama na lisangá.
◼ Tozali kokóba na lipesi ya sipesiale ya búku Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo na minɔkɔ nyonso oyo ezali, na ntalo oyo emonisamaki na nkomá ya la Société.