Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Sɛtɛ́mbɛ: Mwa búku moko ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Bokonzi oyo ekosala Paradis; Ntango moto oyo olingaka akufi. . .; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Ɔkɔtɔ́bɛ: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Novɛ́mbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto moko amonisi bosepeli na ntango ya bozongeli ya sika, likoki ekozala ya kosɛnga ye asala abonemá. Desɛ́mbɛ: Kokabolama ya Nsango ya Bokonzi No. 35. Masangá oyo masilisi teritware na bango mpe bakaboli Nsango ya Bokonzi No. 35 na basangani ya libota mokomoko to na lopango mokomoko bakoki kokabola búku Boyebi.
◼ Na engumba mokomoko, na bileko bikeseni ya mobu, ezali na mikolo ya loi oyo bana bakendaka na biteyelo te mpe mikolo basalaka te. Ezali mabaku malamu mpenza mpo na masangá ya kosangana mingi na mosala ya bokonzi. Mpo na koyebisa masangá liboso mpenza bibongiseli oyo bikamatami mpo na mosala ya kosakola na etuluku na mikolo yango ya loi, bankulutu basengeli koyeba badati ya mikolo yango.
◼ Lisangá mokomoko ezwaki, engebene mposa na yango, baformilɛrɛ mpo na mobu ya mosala 1998. Tiká ete bósalela yango na mayele mpenza. Bosengeli kosalela yango bobele mpo na mosala oyo yango ebongisamelaki.
◼ Kɔ́nti ya lisangá esengeli kotalelama na mwa 1 Sɛtɛ́mbɛ, to noki nsima ya dati wana na mokɛngɛli mokambi to na moto oyo ye akopona. Na nsima bokoyebisa lisanga ete botaleli yango esalamaki.
◼ Basakoli oyo bazali kokana kozala babongisi-nzela basungi na Novɛ́mbɛ mpe na Desɛ́mbɛ basengeli kotondisa demande nokinoki. Boye bankulutu bakokoka kozwa bibongiseli mpo na oyo etali bazulunalo, mikanda mpe bateritware.
◼ Bankulutu bakolanda batoli oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Apríli 1991, nkasa 21-23, na ntina na moto nyonso oyo abimisamaki na lisangá to oyo amilongolaki ye moko mpe oyo akomonisa mposa ya kozonga na lisangá.