Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Febwáli: Búku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimisamaki liboso ya mobu 1985 mpe ezali na libombo ya lisangá. Masangá oyo mazali na babúku yango te ekolakisa búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Mársi: Búku Emoniseli: kokokana na yango monene ebelemi! Apríli: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala milende mpenza mpo na kobanda boyekoli ya Biblia. Máí: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!
◼ Na likita ya mosala ya pɔ́sɔ ebandi na 2 Febwáli, basakoli nyonso oyo bazwá batisimo bakopesamela kalati “ Instructions médicales/Pas de sang ” mpe kalati ebengami Carte d’identité mpo na bana na bango.
◼ Babongisi-nzela basungi oyo bazali kokokisa bangonga na bango te basengeli kotángama lokola babongisi-nzela basungi te kati na lapólo ya lisangá oyo ezali kotindama na Biro. Soki bosali bongo te, mwayene ya ekólo mobimba ekozala na nsé ya ngonga 60.
◼ Kobanda na sanza ya Febwáli to kobanda na mokolo mwa 1 Mársi, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukúlu ya sika ya bato nyonso oyo ezali na motó na likambo ete “Ozali na likanisi ya Nzambe na ntina na bomoi?”
◼ Masangá makozwa bibongiseli bibongi mpo na Ekaniseli, oyo ekosalama mbula oyo na mokolo ya pɔ́sɔ mwa 11 Apríli, nsima ya kolala ya moi. Mampa mpe vinyo esengeli kolekisama bobele nsima ya kolala ya moi, atako lisukúlu ekoki kobanda liboso. Bótala malamu ngonga oyo moi elalaka na esika bozali. Ezali malamu ete masangá esala Ekaniseli na bisika bikeseni, atako yango ekoki ntango nyonso kosalema bongo te. Epai kuna masangá mingi mazali kosala makita na bango na Ndako ya Bokonzi moko, ntango mosusu likoki ekozala ete moko na masangá yango to mingi esalela bisika mosusu na mpokwa wana. Ekaniseli esengeli kobanda na butu mingi te noki ekobɛtisa bato ya sika oyo bazali kosepela na solo libaku. Lisusu, ebongi mpe te ete ngonga oyo ekokabola masangá mibale ezala moke mingi na boye ete ntango ezala mpenza te mpo na kopesa mbote na babyangami, kozwa bibongiseli mpo na kolanda kosalisa basusu na elimo to bobele mpo na kolendisana moko na mosusu. Na nsima ya kotalela na likebi mpenza makambo oyo nyonso, bankulutu bakoyeba makambo nini masengeli kosalama mpo na kopesa nzela na bato nyonso oyo bakoyangana na Ekaniseli ete bázwa na yango matomba mingi koleka.
◼ Lisukúlu ya sipesiale oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ekosalema mokolo ya lomingo mwa 29 Mársi. Plan na yango ekotindama. Masangá oyo makotalelama na mokɛngɛli ya zongazonga, oyo makozala na liyangani ya zongazonga to na liyangani ya mokolo moko na pɔ́sɔ yango, ekosala lisukúlu ya sipesiale na pɔ́sɔ oyo ekolanda. Lisangá moko te esengeli kosala lisukúlu yango liboso ya mokolo mwa 29 Mársi 1998.
◼ Lisangani ya bankulutu esengeli koyeba ete ebongi mpenza kosala mbongwana oyo elandi ntango lisangá ezali koyangana na liyangani: Na pɔ́sɔ ya liyangani ya mokolo moko, makita ya lisangá makosalema lokola momeseno, nzokande lisukúlu mpo na bato nyonso mpe boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekosalema te. Na pɔ́sɔ ya liyangani ya zongazonga, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe likita ya mosala ekosalema te; bobele boyekoli ya mokanda nde ekosalema na pɔ́sɔ yango.
◼ Kobanda pɔ́sɔ ya 4 Máí 1998 kino pɔ́sɔ ya 14 Sɛtɛ́mbɛ 1998, masangá oyo masalaka makita na Lifalansé ekoyekola búku La Bible : Parole de Dieu ou des hommes ? na boyekoli ya mokanda.