Biyano na mituna na bino
◼ Mpo na nini tosengeli kosɛnzɛla na ntina na molato na biso mpe na lolenge na biso ya kokata to kotonga nsuki ntango tokei kotala bandako ya la Société na Brooklyn, na Patterson mpe na Wallkill (New York), ezala mpe bafiliale oyo ezali bipai na bipai na mokili?
Baklisto basengeli komonisa bizaleli malamu mokolo na mokolo. Ntango nyonso, molato na biso mpe lolenge na biso ya kokata to kotonga nsuki esengeli komonisa bopɔlɔ mpe lokumu oyo ebongi na basaleli ya Yehova Nzambe. Esengeli mpenza kozala bongo ntango tokei kotala bandako ya la Société na New York mpe na bafiliale oyo ezali bipai na bipai na mokili.
Na mobu 1998, mayangani ya etúká mpe mayangani ya mikili mingi ekosalema. Ebele ya bandeko na biso oyo bakouta na mikili ndenge na ndenge bakokende kotala biro monene ya la Société na New York mpe bafiliale ya bamboka mosusu. Ntango tokei kotala bandako yango, tosengeli, bobele na mabaku wana te, kasi lisusu ezala na ntango nini, ‘komimonisa na makambo nyonso ete tozali baministre ya Nzambe,’ na kozaláká na molato mpe na lolenge ya kokata to kotonga nsuki oyo ebongi na mabaku yango.—2 Kol. 6:3, 4.
Ntango yango ezali kolobela ntina ya kozala na molato mpe lolenge elongobani ya kokata to kotonga nsuki, buku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe elobeli ntina ya kozala pɛto mpe ya kolata na bopɔlɔ nyonso mpe ya kokata to kotonga nsuki na ndenge ya malamu ntango tozali kosakola to tozali koyangana na makita ya boklisto. Lisusu, na lokasa 133, na paragrafe 1, elobi ete: “Ezali motindo moko wana ezali biso kotala Betele, na Brooklyn to Betele nyonso mosusu ata na mokili nini, epai kuna la Société azali na filiale. Kobosana te ete Betele elimboli ‘Ndako ya Nzambe.’ Na bongo, esengeli ete motindo na yo ya kokatisa nsuki to na kotonga nsuki, molato na yo mpe etamboli na yo, ezala kuna motindo moko na oyo ozali na yango ntango ozali koyangana na makita ya losambo kati na Ndako ya Bokonzi.” Masɛngami matombwani yango masengeli kotosama na basakoli ya Bokonzi oyo bafandi zingazinga mpe na baoyo bautaka mosika mpo na kotala basangani ya libota ya Betele to mpo na kotala bandako ya filiale.
Molato na biso esengeli kopesa na basusu likanisi malamu na ntina na losambo ya solo ya Yehova. Nzokande, esili komonana ete bandeko mosusu oyo bayaka kotala bandako ya la Société bazalaka na molato moko ya mabe mpenza. Molato motindo wana ebongi te ntango tozali kotala Betele. Na likambo oyo, lokola mpe na makambo mosusu matali bomoi na biso ya boklisto, ekozala malamu tótosa masɛngami matombwani, masɛngami oyo mazali kosala ete basaleli ya Nzambe bákesana na mokili mpamba te bango bazali kosala makambo nyonso mpo na lokumu ya Nzambe. (Lom. 12:2; 1 Kol. 10:31) Ezali mpe malamu koyebisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia to bato mosusu, baoyo bakokende mpo na mbala ya liboso kotala Betele ntina ya kosɛnzɛla mpo na molato na bango mpe lolenge na bango ya kokata to kotonga nsuki.
Na bongo, ntango okei kotala bandako ya la Société, omituna: ‘Bilamba na ngai mpe lolenge nakati to natongi nsuki ezali mpenza ya bopɔlɔ?’ (Talá Mika 6:8.) ‘Ezali mpenza komonisa Nzambe oyo nazali kosambela? Bato mosusu bakotungisama to bakobɛta libaku na ntina na etamboli na ngai? Nazali mpenza kopesa ndakisa epai na baoyo bazali kokende kotala Betele mpo na mbala ya liboso?’ Tiká ete ntango nyonso, molato na biso mpe lolenge na biso ya kokata to kotonga nsuki, “ekembisa mateya ya Mobikisi na biso, Nzambe, na makambo nyonso”!—Tito 2:10, NW.