Ezali likambo ya ntina ete tózalaka ntango nyonso wana!
1 Na boumeli ya bambula ebele, bandeko na biso mingi ya Mpoto ya Ɛsti bazalaki koyangana polele te. Kanisá naino esengo oyo bazalaki na yango ntango epekiseli elongolamaki mpe bakómaki konyangana na bonsomi nyonso!
2 Talá oyo mokɛngɛli ya zongazonga moko akomaki na ntina na lisangá moko oyo akendaki kotala: “Mwamibale na mpokwa, wana nautaki kokóma, masini ya kopesa molunge na ndako ebebaki. Na libándá, mbula mpɛmbɛ ezalaki kosopana mpe na kati ya Ndako ya Bokonzi, malili ezalaki mpenza makasi (degre 5 ya Celsius). Bandeko balataki minkoto, matambala ya malili na nkingo, bagáa, binkɔti mpe basapato ya mbula. Moto moko te akokaki kolanda masolo kati na Biblia na ye, mpamba te likoki ya kofungola nkasa ya Biblia ezalaki te. Na ebaelo, atako nalataki kazaka, nazalaki koyoka malili kino na mikuwa mpe ntango nazalaki koloba, milinga ezalaki kobima na monɔkɔ na ngai. Kasi, likambo oyo ekamwisaki ngai ezali ete, nayokaki ata liloba moko te ya komilelalela. Bandeko nyonso balobaki ete bazalaki na esengo ya kozala wana!” Bandeko yango bazalaki ata na likanisi te ya kozangisa makita!
3 Tokanisaka lokola bango? Tosepelaka na bolamu oyo tozali na yango ya koyangana na makita na bonsomi nyonso pɔsɔ na pɔsɔ? To tolingaka koyangana na makita bobele soko makambo nyonso mazali malamu? Ekoki mbala mosusu kozala mpasi ete tóyangana na makita mbala na mbala mpe ekoki kokóma ete tózangisa makita mpo na bantina malamu. Nzokande, kati na biso, ezali na baoyo bayebaka ntina ya makita mpe pene na ntango nyonso bazalaka wana atako basili kokóma mibange, bazali na mikakatano ya kolɔngɔnɔ ya nzoto, bazali na manaka ya mosala oyo ezali kolɛmbisa bango to bazali na mikumba minene. Tómekola bandakisa yango kitoko!—Talá Luka 2:37.
4 Tózala na momeseno ya kosimba losambo ya solo na koyanganáká na makita nyonso, kobanda na boyekoli ya mokanda kino mayangani ya etúká. Mpo na nini tosengeli kotalela mayangani yango na bopɔtu te? Mpamba te koyangana ezali etinda euti na Nzambe. Kasi, ezali mpe na bantina mosusu. Biso banso tozali na mposa ya kozwa matomba na mateya mauti na Nzambe mpe lisungi ya elimo santu. Nzokande, ezali na makita nde tozwaka yango. (Mat. 18:20) Lisusu, totongamaka na bilendiseli oyo topesanaka elongo na bandeko na biso.—Ebe. 10:24, 25.
5 Na ntango ya mbongwana ya Yesu, Petelo alobaki ete: “Molakisi, ezali malamu na biso kozala awa.” (Luka 9:33) Tosengeli kozala na mayoki motindo moko mpo na makita na biso ya boklisto. Ɛɛ, ezali likambo ya ntina ete tózalaka ntango nyonso wana!