Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Sɛtɛ́mbɛ: Mwa buku ya nkasa 32 kati na oyo: Bokonzi oyo ekosala Paradis, Ntango moto oyo olingaka akufi. . . , Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, Osengeli kondima Trinité?, Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?, mpe Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Soki likoki ezali, tokoki kosalela mwa babuku oyo elandi: Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo? Nos problèmes — Qui nous aidera à les résoudre?, Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? mpe Un livre pour tous. Ɔkɔtɔ́bɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Novɛ́mbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto amonisi bosepeli na ntango ya bozongeli ya sika, tokoki kosɛnga na ye asala abonema. Desɛ́mbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.
◼ Lisangá mokomoko esili kozwa formilɛrɛ misato ya ɛvantɛrɛ ya mikanda (S-18). Bosili kotinda kopi moko na Biro?
◼ Masangá bakobanda kosɛnga Calendrier des Témoins de Jéhovah 1999 na demande na bango ya mikanda ya Sɛtɛ́mbɛ.
◼ Komite ya mosala ya lisangá esengeli kotalela noki mpenza bademande nyonso oyo bandeko bakotondisa mpo na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza. Komite ya mosala ekobomba demande ya ndeko moko te mpo na kotalela ye soki akozala na likoki ya kokokisa bangonga oyo esɛngami. La Société akoki kobongola dati oyo mosakoli asɛngi mpo na kobanda mosala ya mobongisi-nzela soki demande na ye ekómaki nsima ya dati yango. Badati ya kozonga nsima ekotyama te, loba soki makambo mosusu ya ntina masalemi. Soki ezali bongo, esengeli kotinda nkoma elongo na demande.
◼ Nsima ya kosilisa boyekoli ya buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko, masangá bakoyekola mwa babuku mosusu. Na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yúni 1998, liyebisi epesamaki ete na pɔsɔ ya 21 Sɛtɛ́mbɛ, tokosalela mwa buku Azali kosɛnga. Nsima na yango tokoyekola mwa buku Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo? mpe na nsima mwa buku Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?