Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/98 nk. 5-6
  • Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Mosala na biso ya Bokonzi—1998
km 12/98 nk. 5-6

Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Bozongeli wana babuku ekangami, na kotalela masolo masalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 7 Sɛtɛ́mbɛ kino pɔsɔ ya 21 Desɛ́mbɛ 1998. Salelá lokasa mosusu mpo na kokoma biyano na mituna oyo okoki koyanola na yango na boumeli ya ntango oyo epesami.

[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso ezali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai binso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]

Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na maloba malandi:

1. “Likabo” oyo balobeli na 2 Timote 1:6, ezali likoki ya koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge oyo Timote azwaki na nzela ya elimo santu ya Nzambe. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w85-F 1/5 lok. 16 par. 15.]

2. Moklisto oyo akomeli ‘amesenisaka mayele na ye na kokesenisa malamu na mabe.’ Asalaka yango na ndenge akokisaka oyo Liloba ya Nzambe ezali kosɛnga (Ebe. 5:14) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w85-F 15/6 lok. 9 par. 7.]

3. Atako Batatoli ya Yehova bakoki kondimama na Leta lokola lingomba, nzokande ndingisa ya kobatela losambo ya solo euti epai na moto moko te to mpe epai ya boyangeli moko te ya bato. [jv lok. 696 par. 1]

4. Ezali Yakobo mokomi ya Biblia nde azalaki molobeli ya “bantoma mpe mikóló” wana bazalaki kokata likambo etali kokatama ngenga. (Mis. 15:6, 13; Yak. 1:1) [si-LI lok. 248 par. 2-3]

5. Atako 1 Petelo 5:13 elobi ete Petelo azalaki na Babilone ntango akomaki mokanda na ye ya liboso, bilembeteli bimonisi ete Babilone ezali nkombo ya Loma ya libombami. [si-LI lok. 251 par. 4]

6. Liloba “motɛmɛli na Klisto” oyo ezali na 1 Yoane 2:18 ezali kolobela moto moko. [Botangi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá rs lok. 35 par. 1.]

7. Misala 15:36-41 elobeli matata oyo Paulo abimisaki mpo na Malako. Matata yango esilaki te. [ad 970 par. 4]

8. Ndenge mokanda ya Emoniseli etyamaki na nsuka ya Biblia ebongi mpenza. Mpamba te ezalaki mokanda ya nsuka oyo ntoma Yoane akomaki. [si-LI lok. 263 par. 1]

9. Emoniseli 13:11-15 emonisi na bosikisiki lolenge nguya oyo eleki banguya ya mokili mobimba Anglo-américain, ezwaki mokumba ya kosimba mpe kozalisa Lisangá ya Mabota mpe kino kokitana na yango na Mabota Masangani. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w88-F 15/12 lok. 19 par. 3.]

10. Etinda ya kolingana moko na mosusu, oyo ezwami na Yoane, ezalaki “mobeko ya sika” mpamba te eyaki nsima ya Mibeko ya Mose. [jv lok. 711 par. 4]

Yanolá na mituna milandi:

11. Elimboli nini likambo oyo ete mokɛngɛli asengeli kozala ‘mobeti bato’ te? (Tito 1:7; NW) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w90 1/9 lok. 27 par. 21.]

12. Ndenge nini toyebi ete Loidi mpe Yunike bango mibale bateyaki Timote na Makomami? [ad 935 col. 2 par. 1]

13. Yesu alingaki koloba nini na maloba oyo ete, “Olingaki mbeka mpe makabo na kotombwa te”? (Eb. 10:5) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w96 1/7 lok. 14 par. 3.]

14. Ndenge nini baklisto bakoki ‘kolonga mokili’? (1 Yoa. 5:3, 4) [si-LI lok. 258 par. 12]

15. Maloba oyo ya Petelo ete ‘kobateláká mokolo ya Yehova’ ntango nyonso na makanisi elimboli nini? (2 Pet. 3:12, NW) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w97 1/9 lok. 19 par. 2.]

16. Bopɛto ya elimo esɛngi makambo nini, mpe ndenge nini yango ezali kosalisa na kobatela basangani ya libota? (2 Kol. 7:1) [fy lok. 46 par. 14]

17. Na boyokani na Emoniseli 1:7, ndenge nini baoyo batobolaki Yesu bakomona ye “koya na mapata”? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w93 1/5 lok. 22 par. 7.]

18. Lolenge nini baklisto oyo bazali na mayele bazali ‘kokeba mpe kosɛnzɛla’? (Luka 21:34, 36) [jv lok. 714 par. 4]

19. Ndenge nini bato oyo bazali lelo kati na lisangá ya boklisto bazali kokóma na boyebi ya sikisiki ya Liloba ya Nzambe? [jv lok. 708 par. 3]

20. Masɛngami nini oyo euti na Makomami ebongiseli ya solo ya boklisto esengeli kokokisa na mikolo oyo ya nsuka? [jv lok. 706 par. 3]

Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ milandi:

21. Mobali mpe mwasi basengeli ․․․․․․․․ kati na bango, koyebáká ete ․․․․․․․․ ezali na ntina koleka komonana na libándá. [fy lok. 26 etanda ya bozongeli]

22. Mokanda ya Paulo epai na Baebele emonisi ete makambo ndenge na ndenge ya ․․․․․․․․ ezalaki elilingi oyo Nzambe asalelaki mpo na komonisa makambo minene oyo mazalaki koya, oyo nyonso esukaki na ․․․․․․․․ mpe ․․․․․․․․, oyo ekokisaki Mibeko. [si-LI lok. 247 par. 23]

23. Kati na 2 Petelo 1:5-8, ntoma Petelo asɛngi tósala ․․․․․․․․ mpo na kolona bizaleli ya boklisto oyo bikobatela biso ete tózanga ․․․․․․․․ to ․․․․․․․․. [si-LI lok. 255 par. 9]

24. Wana mibali na basi na bango bazali kosolola elongo, ․․․․․․․․ mpe ․․․․․․․․ ezali na ntina mingi. [fy lok. 36 par. 21]

25. Malia mama ya Yesu azalaki moto ya libota ya ․․․․․․․․ mpe mokitani ya Davidi; na nzela na ye, Yesu asangolaki lotomo ya kobotama na ․․․․․․․․ yango mpo na kozala mosangoli ya “kiti ya bokonzi ya Davidi tata na ye.” (Luka 1:32) [ad 947 par. 3]

Poná eyano ya malamu na maloba mapesami oyo malandi:

26. Na boumeli ya bokangami ya Paulo na boloko na Loma mpo na mbala ya liboso, (Onezifolo; Onesimo; Onane), moombo oyo akimaki ndako ya nkolo na ye (Filipi; Fesete; Filemona), azalaki kati na bato oyo bayokaki mateya na ye. [si-LI lok. 242 par. 2]

27. (Bolingo; Limemya; Koyamba bapaya) elimbolami boye ete “kopesa bato mosusu kilo, kokumisa bango.” [fy lok. 30 par. 7]

28. Na Luka 14:28, Yesu azali koloba mpo na oyo etali (komibongisa malamu; koboya kobebisa mosolo; kopɛngola kodefa mosolo). [fy lok. 40 par. 4]

29. “Bonkolo” oyo elobelami na Yuda 8 ezali kolobela (etɛlɛmɛlo ya Yesu; boyangeli ya Yehova; bokonzi botyami na Nzambe kati na lisangá ya boklisto). [si-LI lok. 263 par. 9]

30. Na Emoniseli 11:11, “mikolo misato na ndambo,” wana batikali bapakolami bamonani lokola ebembe na miso ya banguna na bango, elimboli (mbula misato na ndambo; eleko mokuse; sanza misato na ndambo). [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá re lok. 167 par. 21.]

Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse:

Mas. 8:30; Mat. 19:13-15; Ebe. 2:1; Yak. 4:15; 1 Pet. 3:4

31. Mpo na komibatela na bopusi ya mokili oyo, tosengeli “kotya motema na etingya na koleka” na Liloba ya Nzambe kokolisa mimeseno malamu ya boyekoli mpe kozala na manaka malamu ya botángi Biblia. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w98 1/1 lok. 7 par. 9.]

32. Ata soki tozali kokana kosala makambo mpo na mikolo mizali koya, tosengeli kotalela kati na mabondeli soki ezali na boyokani na mokano ya Nzambe. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w97 15/11 lok. 21 par. 10-11.]

33. “Elimo na bopolo mpe na kimya” ya mwasi moklisto oyo azali mama ya libota esepelisaka bobele mobali na ye te kasi na koleka ezali mpe kosepelisa Nzambe. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w89-LI 15/5 lok. 4 par. 12.]

34. Kolandáká ndakisa ya Yehova, tata ya malamu asengeli kolona boyokani ya mɔ́tɔ mpe ya bolingo elongo na mwana na ye uta ebandeli ya bomoi ya mwana. [fy lok. 53 par. 7]

35. Lokola Yesu amonisaki kozanga koponapona na kopamboláká bana mike, tosengeli te kotalela bana mibali na motuya mingi koleka bana basi. [fy lok. 52 par. 4]

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto