Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/99 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1999
Mosala na biso ya Bokonzi—1999
km 6/99 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na Yuni: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku ya nkasa 32 kati na mwa babuku oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie — Comment le découvrir?; mpe Sepela na bomoi ya seko na Mabele!; Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo soki esengeli: Bilimu ya bakufi​—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes — Qui nous aidera à les résoudre?; Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?; mpe Un livre pour tous; Sɛtɛmbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko.

◼ Mokɛngɛli mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Yuni to mwa moke nsima. Nsima ya kotalela kɔnti, basengeli koyebisa yango na lisangá ntango bakotánga lapolo ya mbala ya nsima.

◼ Ndenge yango eyebisamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza ya Yanuali 1999, ngonga oyo esɛngami na babongisi-nzela ya sanza na sanza ekitisami kolongwa na ngonga 90 kino ngonga 70 sanza na sanza. Kobanda na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1998 oyo eleki, ngonga oyo esɛngami na babongisi-nzela mpo na mbula mobimba ekozala ngonga 840. Babongisi-nzela oyo bakokɔta na Eteyelo mpo na babongisi-nzela bakobakisela bango ngonga 40 na nsuka ya mbula. Ndenge yango ezalaki kosalema kala, ngonga yango ekotángama te na ngonga oyo mobongisi-nzela akosala na mosala ya kosakola, kasi yango ekotyama na fiche ya mosala ya mosakoli (S-21) na molɔngɔ oyo bakomá “Observations.”

◼ Mikolo nyonso toyambaka bapaya ebele na Betele. Mingi bayaka kosomba mikanda mpo na bango moko to mpo na masangá na bango. Tozalaka na esengo ya kopesa bango mikanda na boumeli ya ngonga oyo comptoir ya mikanda ezali naino polele. Basusu bazalaka na mposa ya kokutana na bandeko ya Betele mpo na makambo oyo etali bango moko to makambo ya lisangá. Tozali koyebisa bino lisusu ete bandeko ya Betele basalaka mosala mpo na bandeko nyonso ya ekólo na biso kobanda na ngonga ya 7:45 kino 12:00 mpe kobanda ngonga ya 1:15 nsima ya midi kino 5:00 ya mpokwa. Ezali malamu kozwa bibongiseli na bandeko ya Betele ntango bokutani na bango na makita ya lisangá to na wikende. Soki ozali na mposa ya kokutana na ndeko moko ya Betele mpo na likambo moko ya ntina mingi, osengeli kotikela ye na réception, mwa nɔti oyo osilaki kokoma na ndako, to kotindela ye maloba na telefone. Betele ekosala nyonso mpo na kokómisa nsango yango epai ya ndeko wana. Mpe ye moko akoyeba likambo oyo akosala.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto