Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/00 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 4/00 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokozala na mwa buku Azali kosɛnga mpo na bato oyo bakosepela mpe tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bango Biblia. Yuni: Mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku ya nkasa 32 kati na mwa babuku oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Nzambe azali komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie​—Comment le découvrir? mpe Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo soki esengeli: Bilimu ya bakufi​—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes​—Qui nous aidera à les résoudre?; Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? mpe Un livre pour tous.

◼ Bazulunalo oyo ekobima na sanza ya Mai 2000 ekozala na masolo oyo ekoki kosepelisa bato ya teritware na biso. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai ekolobela lisolo oyo: “Mpo na nini bato balingi kanyaka mingi?” Lamuká! ya 8 Mai ekolobela motó ya likambo “Les mines anti-personnel: Que faire?” Lisangá mokomoko ekozwa bazulunalo yango mwa mingi (20 %) koleka ndenge bazwaka na momeseno. Mokɛngɛli na mosala asengeli kokeba ete bazulunalo yango ekabolama na teritware.

◼ Makarɔ mpo na liyangani ya etúká 2000 na Lifalanse, na Lingala, na Monokutuba, na Otetela, na Swahili mpe na Tshiluba ekotindama mbala moko na masangá. Ekozala na ntina te ete lisangá esɛnga yango. Liboke mokomoko ekozala na makarɔ 25 mpe makarɔ yango ekotindama na kotalela mposa ya lisangá mokomoko. Soki lisangá moko ezali na mposa ya kobakisa makarɔ, bakosɛnga yango na komande ya mikanda (S-14). Esengeli mpe kosɛnga plastiki na yango mpo na moto nyonso oyo akozala na mposa na yango na lisangá.

◼ Masangá esengeli kobanda kotinda komande na bango ya Calendrier 2001, ya Annuaire 2001 mpe ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo 2001. Calendrier 2001 mpe Annuaire 2001 ekozala na Lifalanse. Nzokande, mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo 2001 ekozala na Lifalanse, na Lingala, na Monokutuba, na Otetela, na Swahili mpe na Tshiluba. Tokokoma na lokasa ya kotinda mikanda (bordereaux d’expédition), “noté pour plus tard” tii ntango mikanda yango ekoya. Mikanda yango nyonso ezali ba articles sur demande spéciale. Bósala demande na bino ya mikanda (S-14) mpe bótinda yango, bóbosana te kokoma lokota ya mikanda oyo bosɛngi.

◼ Tozali koyebisa lisusu masangá ete soki mosakoli moko akei kofanda esika mosusu, mokomeli ya lisangá asengeli te kopesa ye mokanda. Mosakoli yango asengeli kosolola na mokomeli ya lisangá na ye ya sika, mokomeli ya lisangá na ye ya sika akokomela mokomeli ya lisangá na ye ya kala mpo na kosɛnga fiche na ye ya mosala ya kosakola na lokasa na ye ya toli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe mokanda oyo bakotinda mpo na ye na lisangá na ye ya sika. Soki mokomeli ya lisangá na ye ya kala ayebi lisangá epai mosakoli yango azali kokende, akoki kotinda mbala moko fiche ya mosakoli yango, lokasa na ye ya toli mpe mokanda oyo akokoma mpo na mosakoli yango mpo báyamba ye malamu na lisangá na ye ya sika. Mosakoli yango akolakisama na lisangá na ye ya sika bobele soki mikanda yango ekómi kuna.​—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 1999, lok. 7; mokanda ya mwa 1 Yuni 1999.

◼ Biro ezali ntango nyonso kozwa ebele ya mikanda ya bandeko oyo bandeko mosusu bazali kokomela bango mpe bazali kotinda yango na nzela ya biro ya filiale. Tozali koyebisa bino ete Biro ezali na makoki te ya kozwa mokumba ya kokómisa mikanda yango epai ya bankolo na yango, mpamba te yango ezali kosɛnga mbongo mingi.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Kiluba, Lingala, Monokutuba, Otetela, Swahili, Tshiluba: Tótángaka Makomami mokolo na mokolo 2000.

Kiluba, Otetela, Tshiluba: Omipesa na kotánga mpe kokoma.

Kipende: Sepela na bomoi ya seko na Mabele!

Kisonge: Bindimeli ya Ba Témoins de Jéhovah ezali nini? (T-14); Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika (T-15).

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto