Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/00 lok. 8
  • Makita epesaka bilenge matomba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita epesaka bilenge matomba
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini tosengeli koyanganaka mpo na kosambela Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Bolamu nini okoki kozwa na makita ya Batatoli ya Yehova?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Tokosala nini mpo makita esepelisa biso?
    Mosala na biso ya Bokonzi—1999
  • Ndenge oyo Yehova azali kotambwisa biso.
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 8/00 lok. 8

Makita epesaka bilenge matomba

1 Elenge mwasi moko alobaki boye: “Na bantango mosusu nakanisaka ete bolenge ezali eleko oyo eleki mpasi mingi na bomoi ya moto. Tozali esika moko na bato oyo bamipesi na kosala pite, na komela bangi, na kolangwa masanga.” Yo mpe omonaka bongo? Soki ezali bongo, eloko nini ekoki kosalisa yo okwea na bizaleli mabe wana te? Osengeli kozala na kondima, kondima makasi ete banzela ya Yehova ezali sembo, mpamba te soki kondima ezali te ‘tokokoka kosepelisa ye te.’ (Ebe. 11:6, NW ) Koyangana na makita ya lisangá ekosalisa yo mpo kondima na yo ya boklisto ekóma makasi mpe ozala na ekateli makasi ya koboya oyo ezali mabe.

2 Okoyekola makambo mingi na makita: Eloko nini esalaka ete ntango tozali kolya bilei ya kitoko elongo na baninga tózala na esengo mingi? Ezali mpenza mpo ete ntango tozali kolya bilei ya kitoko, tozali mpe kosepela lokola tozali esika moko na baninga na biso, boye te? Makita na biso epesaka biso mpe libaku ya kosepela ndenge yango, kasi nde na elimo.

3 Makambo oyo elobamaka na makita ezalaka ya kolendisa, mateya yango elobelaka makambo, ezala oyo tokutanaka na yango na bomoi na biso ya mokolo na mokolo to mpe boyekoli ya bisakweli kitoko ya Biblia. Mateya oyo bapesaka kuna ezali mpenza malamu, mpe ekoteya yo kozala na bomoi oyo eleki malamu mpe okoyeba ndenge ya kolonga mikakatano oyo okokutana na yango. Baninga oyo tokutanaka na bango na makita bazali baninga oyo baleki malamu, tokoki kokuta baninga ya ndenge wana epai mosusu te, mpe kimya ya elimo oyo ezalaka kuna esepelisaka mpe ebatelaka biso. (Nz. 133:1) Ezali likambo ya kokamwa te ete elenge moko alobaki boye: “Nakendaka na kelasi mokolo mobimba, mpe elɛmbisaka ngai mingi. Kasi makita ezali lokola mai ya mpiɔ na kati ya esobe, epai nazwaka makasi oyo nakosalela na mokolo oyo elandi na kelasi.” Elenge mosusu alobaki ete: “Namoni ete kozala na baninga oyo balingaka Yehova esalisaka ngai ete natikala ntango nyonso pene na ye.”

4 Soki okomisi nkombo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, okoyekola ndenge ya kobongisa masolo ya Biblia, kobongisa yango lokola lisukulu, mpe koloba yango lokola lisolo oyo ozali kosolola na moto, kasi liboso ya bato na Ndako ya Bokonzi. Kanisá libaku malamu oyo ozali na yango ete bazali kolakisa yo ndenge ya koteya malamumalamu solo ya Liloba ya Nzambe oyo ekobikisa bato! Esika nini lisusu bilenge bakoki kozwa mateya malamu lokola oyo wana?

5 Ndenge nini kozwa matomba mingi na makita?: Ezali na makambo misato oyo ekoki kosalisa yo ete ozwa matomba mingi na makita. Makambo yango yango oyo: kobongisa makita, kopesa biyano, mpe kosalela makambo oyo ozali koyekola.

6 Kobongisa makita: Pɔsɔ na pɔsɔ, osengeli kosala makasi ete ozala na ntango mpo na kobongisa makita. Badevuare na yo ya kelasi, mwa mosala oyo osalaka, to kominanola esengeli te kozwa ntango na yo nyonso mpe bongo ozala na ntango te mpo na koyekola makambo oyo bakoloba na likita mokomoko. Soki okosala makasi ya kozala na ntango, yango ekosalisa yo ete ozala na momeseno malamu ya kobongisa makita. Libosoliboso, osengeli kolanda malamu programɛ ya botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ oyo ebongisami mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi. Esɛngaka bobele miniti moke mokolo na mokolo mpo na kotánga mpe komanyola makambo oyo ezali na mikapo oyo etyami na programɛ. Bombá mwa ntango mpo na kobongisa Boyekoli ya Mokanda mpe Boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Bandeko mosusu bamibongisaka mokolo moko to mikolo mibale liboso ya makita yango. Soki likoki ezali, okoki kosala mpe bongo mpo na kobongisa Likita ya Mosala pɔsɔ na pɔsɔ.

7 Pesáká biyano: Biblia elobi ete ntango Yesu azalaki na mbula 12, bakutaki ye na tempelo, azali koyoka, kotuna mituna, mpe kopesa biyano. (Luka 2:46, 47) Na maloba mosusu, tokoki koloba ete Yesu amikɔtisaki mobimba na lisolo yango. Okozwa matomba mingi na makita soki ozali kosala milende mpo na kopesa biyano.​—Mas. 15:23.

8 Osengeli kotya likebi mpenza na makambo oyo bazali koloba na makita. Na bantango mosusu, koyoka lisukulu ezalaka mpasi koleka kosala lisukulu. Mpo na nini? Ntango tozali koyoka moto mosusu azali koloba, makanisi na biso ekoki kotambolatambola. Ndenge nini okoki kosala mpo makanisi na yo etambolatambola te? Zwaká mwa banɔti. Komá mwa makambo ya ntina oyo okozala na mposa na yango na nsima. Soki ozali kozwa banɔti, yango ekosalisa yo ete makanisi na yo etambolatambola te ntango makita ezali kosalema. Lisusu, osengeli koluka mikapo na Biblia na yo, mpe kolanda ntango molobi azali kotánga yango.

9 Lisusu, omityela mokano ya kopesa biyano na lisolo nyonso oyo esalemaka na mituna mpe biyano. Okozwa matomba mingi koleka soki okokanisa malamu liboso ya koloba, Masese 15:28 elobi: “Motema na moyengebene ekobanzabanza liboso na kozongisa liloba.”

10 Saleláká makambo oyo ozali koyekola: Likambo ya nsuka ezali ya koluka koyeba mpenza soki makambo oyo oyekolaka ‘ezali kosala mosala kati na yo.’ (1 Tes. 2:13) Ntango ozali kosalela makambo malamu oyo oyekolaka na likita mokomoko, yango ekosala ete ozala pene ya Yehova Nzambe. Akozala mpenza moto ya solo mpo na yo, okozala na esengo mingi mpe okosepela wana ‘ozali kotambola kati na makambo ya solo’ oyo omeseni na yango.​—3 Yoa. 4.

11 Bino bandeko mibali mpe bandeko basi oyo bozali naino bilenge, soki bozali kobongisa makita pɔsɔ na pɔsɔ, kopesa biyano, mpe kosalela makambo oyo bozali koyekola, yango ekosala ete bósepela mpenza na makita. Bokozwa mpe matomba nyonso oyo eutaka na makita. Kondima na bino mpe ekateli na bino ya kotikala sembo epai ya Yehova, Tata na bino ya likoló, ekokóma makasi.​—Nz. 145:18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto