Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/01 lok. 8
  • Yehova apesaka nguya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova apesaka nguya
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Masolo mosusu
  • Yehova apesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • “Bóluka Yehova mpe Nguya na ye”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Yehova akopesa yo makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Yehova akopesaka nguya epai na ye oyo alɛmbi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 2/01 lok. 8

Yehova apesaka nguya

1 Ndenge nini otalelaka ntoma Paulo? Ntango tozali kotánga mokanda ya Misala, tomonaka ndenge oyo asalaki mpenza mingi kati na mosala ya Yehova. Ndenge nini Paulo akokisaki makambo nyonso wana? Alobaki boye: “Nayebi kosala makambo nyonso kati na ye oyo akokembisaka ngai na nguya.” (Filp. 4:13) Biso mpe tokoki kozwa nguya oyo Yehova apesaka. Ndenge nini? Soki tozali kozwa matomba na makambo motoba oyo abongisi mpo na kopesa biso nguya na elimo.

2 Liloba ya Nzambe: Lokola tosengeli kolya mpo na kobatela nzoto na biso ete ezala makasi, lolenge moko mpe tosengeli komileisa na Liloba ya Nzambe mpo tozala makasi na elimo. (Mat. 4:4) Biblia epesaka biso nguya mpo tózala makasi. Mpo tozala ntango nyonso na molende mpe na esengo mpo na solo, tosengeli komipesa na koyekola biso moko mpe na komanyola mokolo na mokolo soki likoki ezali.​—Nz. 1:2, 3.

3 Libondeli: Ezali na ntina ete tóbɛlɛmaka epai ya Yehova, mingimingi na ntango oyo tozali mpenza na mposa ete asunga biso. Na nzela ya elimo na ye, apesaka biso nguya oyo elendisaka baoyo nyonso bazali kosɛnga ye yango na libondeli. (Luka 11:13; Ef. 3:16) Makomami ezali kolendisa biso “tóbondela Nzambe ntango nyonso.” (Lom. 12:12) Osalaka yango?

4 Lisangá: Na makita ya lisangá tozwaka nguya mpe bilendiseli ntango tosanganaka na esengo nyonso na bandeko na biso na makita yango. (Ebe. 10:24, 25) Ntango tokutani na bampasi balendisaka biso mpe basalisaka biso na bolingo mpenza.​—Mas. 17:17; Mos. 4:10.

5 Mosala ya kosakola: Kobima ntango nyonso na mosala ya kosakola esalisaka biso tótya makanisi na biso na Bokonzi mpe na matomba oyo yango ekomema. Tolendisamaka mpe ntango tozali kosalisa bato mosusu báyekola makambo na ntina na Yehova. (Mis. 20:35) Biso nyonso te nde tozali na likoki ya kokende kosala na bisika mposa ezali makasi to kosala lokola basali ya ntango nyonso, nzokande tokoki kosala mingi na mosala ya kosakola na ndenge mosusu.​—Ebe. 6:10-12.

6 Bakɛngɛli baklisto: Tozwaka litomba na bilendiseli mpe na lisungi oyo bankulutu bapesaka. Yehova apesi bango mokumba ya kobatela bampate ya Nzambe oyo bazali na mabɔkɔ na bango. (1 Pet. 5:2) Bakɛngɛli-batamboli balendisaka masangá, ndenge Paulo asalaki yango na mikolo na ye.​—Lom. 1:11, 12.

7 Ndakisa ya baoyo bazali sembo: Elendisaka ntango tozali kotalela ndakisa ya baninga na biso baklisto oyo bazali sembo, ezala baoyo ya ntango ya kala to na mikolo na biso. (Ebe. 12:1) Ntango ozali na mposa ya elendiseli, mpo na nini te kotánga lisolo moko kati na masolo ya bomoi oyo ebimaka na bazulunalo na biso, balapolo ya kolendisa oyo ezalaka na Annuaire, to masolo kitoko ya Batatoli ya Yehova na mikolo na biso oyo ezali na buku Prédicateurs?

8 Ndeko moko, oyo azali lelo oyo na mbula koleka 90, ayambaki solo ntango azalaki naino mwana. Ntango azalaki naino elenge kondima na ye etyamaki na komekama. Ya liboso, bandeko mosusu ya lisangá na bango oyo bazalaki na molende mpenza batikaki ebongiseli ya Yehova. Na nsima ezalaki mosala ya kosakola ndako na ndako oyo azalaki komona yango ete ezali mpasi mpenza. Kasi azalaki ntango nyonso kotya motema na ye epai ya Yehova. Aumelaki te akómaki kosepela na mosala ya kosakola. Ezali boni lelo oyo? Atako nzoto na ye ezali lisusu kolɔngɔnɔ te, azali kaka kosala na Betele ya Brooklyn, azali moko kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi. Azali na mawa ata moke te na ndenge akangami na ebongiseli ya Yehova.

9 Ndeko mwasi moko oyo asalaka na Betele ya Londres, azwaki batisimo ntango azalaki na mbula 13. Abandaki kosala mosala ya mobongisi-nzela na mbula oyo elandaki elongo na ndeko na ye ya mobali, mpe na mbula ya nsima, bakangaki tata na ye mpamba te aboyaki kosangana na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Ndeko mwasi yango azalaki ntango nyonso kotala epai ya Yehova mpo na kozwa nguya, mpe alandaki ntango nyonso kosalela Nzambe ya solo. Na nsima, abalaki ndeko mobali moko oyo azalaki mpenza sembo, mpe balandaki kosalela Yehova elongo. Nsima ya mbula 35 ya libala, mobali na ye akufaki liwa ya mbalakaka. Na mbala oyo lisusu ndeko mwasi yango azwaki nguya epai ya Yehova, mpe alandi kosalela ye, makanisi na ye ezali ntango nyonso ya kosalela Yehova libela na libela lokola mosaleli na ye awa na mabele.

10 Yehova asalisaka basaleli na ye ya sembo mpe apesaka bango nguya. “Akopesa nguya epai na ye oyo alɛmbi; epai na ye oyo azangi makasi, akobakisa nguya.” Tokoki kozwa nguya epai na ye oyo apesaka nguya soki tozali kozwa litomba na makambo motoba oyo touti kolobela. Kobosana te ete: “Baoyo [bazelaka Yehova, NW ] bakozwa nguya na sika. . . . Bakopota mbango nde bakolɛmba te, bakotambola nde bakosɛnzwa te.” (Yis. 40:29-31) Paulo atyaki mpenza motema epai ya Yehova mpo na kozwa nguya, biso mpe tosengeli kosala bongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto