Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/01 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 3/01 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Marsi: Buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokolakisa mpe buku Boyebi to mwa buku Azali kosɛnga mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Yuni: Mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

◼ Basakoli oyo balingi kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na sanza ya Aprili basengeli komibongisa banda sikoyo mpo na kotondisa noki formilɛrɛ na yango. Yango ekopesa nzela na bankulutu ete bázwa bibongiseli ya ntina mpo na mosala ya kosakola mpe básɛnga bazulunalo mpe mikanda mingi. Nkombo ya baoyo nyonso bandimami lokola babongisi-nzela basungi ekoyebisama na lisangá.

◼ Lokola mosala ya kosakola ekosalema mingi mpenza na sanza ya Aprili, bakobakisela masangá bazulunalo mingi, 20 % mpo na Lamuká! (na Lifalanse) mpe 30 % mpo na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Aprili 2001.

◼ Ekaniseli ekosalema na mokolo ya lomingo mwa 8 Aprili 2001. Makita mosusu ekosalema te na mokolo yango, bobele likita mpo na mosala ya kosakola. Bankulutu bakoki kozwa bibongiseli mpo na kosala boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mokolo mosusu.

◼ La Société akondima te komande oyo mosakoli ye moko atindi mpo na mikanda na ye moko. Mokɛngɛli-mokambi akozwa bibongiseli ete liyebisi epesama liboso ete komande ya mikanda ekoka kotindama na la Société. Yango ekosalisa baoyo nyonso bazali na mposa ya kozwa mikanda mpo na bango moko bákoka koyebisa na ndeko oyo azali kotalela mikanda. Bóbosana te mikanda mosusu ezalaka komande sipesiale.

◼ Betele ezalaka na esengo ya kolakisa bisika ya mosala ya filiale epai ya baoyo nyonso bazali kosepela na mosala ya Bokonzi. Tosengeli kokeba na etamboli na biso, na molato na biso mpe na lolenge na biso ya kobongisa nsuki ntango tokei kotala Betele. Tosengeli kokeba biso moko mpe kokebisa baoyo nyonso bayei na biso elongo. Ezali ntango nyonso na ntina ete tótángaka makambo oyo ezali na lisolo oyo ebimaki na etanda “Biyano na mituna na bino” na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuni 1998 mpe na buku Lisanga, lok. 131 paragrafe 3 (na Lingala).

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Lifalanse: Batatoli ya Yehova bazali banani? Makambo nini bandimaka?; Le destin dirige-t-il notre vie, ou Dieu nous tient-il pour responsables de nos actes? (T-71).

Lingelesi: Batatoli ya Yehova bazali banani? Makambo nini bandimaka?

Swahili: Batatoli ya Yehova bazali banani? Makambo nini bandimaka?

◼ Mikanda oyo tozali na yango:

Uruund: Mpo na nini kondimela Biblia (T-13); Bindimeli ya ba Témoins de Jéhovah ezali nini? (T-14); Bomoi ya kimya kati na mokili ya sika (T-15); Elikya nini ezali mpo na balingami na biso oyo basili kokufa? (T-16); Bomoi malamu na libota (T-21); Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? Sepela na bomoi ya seko na Mabele. (Mikanda oyo nyonso ezali na depo ya Lubumbashi. Tozali kolendisa masangá oyo ezali na teritware oyo balobaka Uruund básala komande na bango.)

◼ Bakasɛti ya sika oyo tozali na yango:

Lingelesi: Bandakisa ya kokebisa biso lelo oyo (drame); Mindule ya Bokonzi No. 9.

◼ Kasɛti video ya sika oyo tozali na yango:

Na Elobeli ya bikela ya Amerika: Ntango moto oyo olingaka akufi. . .

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto