Kondima na biso etindaka biso tósala misala malamu
1 Kondima etindaki Noa, Mose mpe Lahaba básala likambo moko boye. Noa atongaki masuwa. Mose aboyaki bolamu ya ntango mokuse oyo azalaki na yango na ndako ya Falo. Lahaba abombaki banɔngi mpe na nsima alandaki malako oyo bango bapesaki ye; na yango abikisaki bato ya libota na ye. (Ebe. 11:7, 24-26, 31) Misala nini ya malamu kondima na biso ezali kotinda biso tósala lelo oyo?
2 Kosakola: Kondima etindaka biso tóloba mpo na Nzambe na biso ya kokamwa mpe mpo na bibongiseli oyo asili kozwa mpo na bolamu na biso ya seko. (2 Kol. 4:13) Ekoki kozala ete mbala mosusu tokakatanaka mpo na kopesa litatoli. Kasi soki ‘totii Yehova ntango nyonso liboso na biso,’ tokozwa makasi mpe tokobanga eloko te. (Nz. 16:8) Na ntango wana, kondima na biso ekotinda biso tóyebisa nsango malamu epai ya bandeko na biso, bazalani na biso, baninga na biso ya mosala, baninga na biso ya kelasi mpe bato mosusu, na libaku nyonso ya malamu oyo emonani.—Lom. 1:14-16.
3 Koyangana na makita: Koyangana mbala na mbala na makita nyonso ya pɔsɔ ezali mosala mosusu ya malamu oyo kondima etindaka biso tósala. Na ndenge nini? Yango emonisaka ndenge tondimaka mpenza ete ntango toyanganaka na makita ya boklisto, Yesu azalaka na biso elongo na nzela ya elimo santu ya Nzambe. (Mat. 18:20) Yango emonisaka polele ete tozali na mposa ya ‘koyoka oyo elimo ezali koloba na masangá.’ (Emon. 3:6, NW) Tolandaka mpenza mateya oyo toyokaka kuna, mpamba te na nzela ya kondima na biso toyebaka ete Yehova, Molakisi na biso Monene, nde azali koteya biso.—Yis. 30:20.
4 Makambo oyo toponaka: Eloko etindaka biso tótya makambo ya elimo na esika ya liboso na bomoi na biso ezali nde kondima makasi oyo tozali na yango mpo na makambo ya solo oyo tondimaka kasi emonanaka te. (Ebe. 11:1) Mbala mingi, yango esɛngaka komipimela makambo mosusu. Na ndakisa, nkulutu moko aboyaki bámatisa ye mpɛtɛ na mosala moko ya mbongo mingi, mpamba te amonaki ete akokoka koyangana na makita mosusu te, akozala na ntango mingi te ya kofanda na libota na ye mpe akotika mosala na ye ya mobongisi-nzela. Biso mpe, tótya motema na biso mobimba na elikya oyo Yehova apesi biso na kati ya Biblia, ete akokokisa bamposa ya baoyo ‘bazali kokoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye.’—Mat. 6:33.
5 Nguya makasi oyo kondima ezali na yango na bomoi na biso ezangaka te kobenda likebi ya bato mosusu. Ya solo, kondima na biso eyebani mokili mobimba. (Lom. 1:8) Yango wana, tiká ete biso nyonso tómonisa na misala na biso malamu ete kondima na biso ezali na bomoi.—Yak. 2:26.