Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/04 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 4/04 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Bósala makasi mpo na kolakisa buku Tósambela Nzambe, ntango bozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, ekoki kozala baoyo bayanganaki na ekaniseli mpe/to na bibongiseli mosusu ya lisangá kasi bameseni mpenza te na Batatoli ya Yehova. Bósala makasi bóbanda koyekola na bango Biblia na buku yango, mingimingi baoyo basilisá koyekola buku Boyebi mpe mwa buku Azali kosɛnga. Yuni: Yekolá epai ya moteyi monene. Soki bato yango bazali na bana te, bokoki kolakisa mwa buku Azali kosɛnga. Ntango bozali kosalela mwa buku yango, bósala makasi bóbanda koyekola na bato Biblia. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bilimo ya bakufi​—⁠Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe?, Bizali solo?; Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Osengeli kondima Trinité?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele!, “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika” mpe Nzela ya bomoi ya seko​—⁠Osili komona yango?

◼ Kobanda na sanza ya Yuni, makarɔ mpo na liyangani ya etúká ya mobu 2004 ekotindama mbala moko na masangá nzela moko na mikanda mosusu. Bakotinda yango 25 na liboke mokomoko na kotalela motángo ya basakoli ya lisangá mokomoko. Soki lisangá ezali na mposa bábakisela bango bamakarɔ, bakosala komande na yango na nzela ya formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bosengeli kosala komande ya baetwi ya makarɔ mpo na basakoli nyonso oyo bazali na mposa na yango.

◼ Ezali na ntina mingi ete biro ya filiale eyebaka ntango nyonso baadresi mpe banimero ya telefone ya bakɛngɛli-bakambi nyonso mpe bakomeli nyonso ya masangá. Soki mokɛngɛli-mokambi to mokomeli moko akómi na adresi ya sika to azwi nimero ya sika ya telefone, Komite ya Mosala ya lisangá esengeli kotondisa formilɛrɛ Changement d’adresse du surveillant-président/secrétaire (S-29); bandeko ya komite yango bakotya sinyatire na bango, mpe bakotinda formilɛrɛ yango noki mpenza na biro ya filiale.

◼ Bakomeli ya masangá basengeli ntango nyonso kozala na baformilɛrɛ oyo mwa mingi na libombo: Demande d’admission au service de pionnier permanent (S-205) mpe Demande d’admission au service de pionnier auxiliaire (S- 205b). Bakosala komande na yango na nzela ya formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bózala na baformilɛrɛ yango mingi oyo bokoki kosalela ata koleka mbula mobimba. Ntango bandeko bazongiseli bino formilɛrɛ mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, bótalaka malamu soki batondisi yango nyonso mpe batye dati na bango ya batisimo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto