Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/07 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Mosala na biso ya Bokonzi—2007
km 8/07 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32, ndenge emonisamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 2007. Sɛtɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia na buku yango, na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Soki bato oyo tokei kotala bazali na buku yango, tokomonisa bango na mokuse ndenge boyekoli esalemaka mpo na kosalisa bango bázwa matomba na buku yango. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokolakisa ye trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? mpe tokolimbwela ye yango, mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Novɛmbɛ: Buku Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango balobi ete bazali na bana te, tokoki kolakisa bango mwa buku Bókɛngɛlaka!

◼ Lokola sanza ya Sɛtɛmbɛ ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.

◼ Masangá basengeli kobanda kosɛnga Calendrier des Témoins de Jéhovah 2008, Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—2008, mpe Annuaire des Témoins de Jéhovah​—2008 na komande oyo bakosala mbala ekoya. Liste ya minɔkɔ oyo mikanda yango ekobima, ekotyama na “Avis à toutes les congrégations,” oyo etindamaka na masangá nyonso sanza na sanza.

◼ Bankulutu basengeli kobosana te kolanda malako oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1991, nk. 21-23, oyo etali moto nyonso oyo abimisamaki na lisangá to amilongolaki ye moko, kasi azali na mposa ya kozonga na lisangá.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto