Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Novɛmbɛ: Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango balobi ete bazali na bana te, tokoki kolakisa bango mwa buku Bókɛngɛlaka! Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Tokoki mpe kolakisa buku Pusaná penepene na Yehova to Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Yanuali: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1991. Masangá oyo ezali na buku yango te, bakoki kolakisa buku Boyebi to mwa buku Bókɛngɛlaka! Febwali: Y-a t-il un Créateur qui se soucie de vous ? to Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota.
◼ Lokola sanza ya Desɛmbɛ ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
◼ Tozali na mikanda mingi oyo ebongisami mpo na kopesa litatoli epai ya bato ya mimeseno ndenge na ndenge mpe ya mangomba ndenge na ndenge. Ndeko oyo atalelaka mikanda azali na liste ya mikanda wana oyo ekoki kosalisa biso.
◼ Soki basakoli batondisi naino te kalati na bango DPA (Instructions médicales/Désignation d’une personne de confiance), esengeli kolendisa bango bátondisa yango. Kalati wana ekosalisa bato bátosa lotomo oyo ozali na yango ya koboya makila. Bankulutu bakosalisa mosakoli mokomoko na likambo yango, soki esengeli.—Talá siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2006.
Basakoli bakobanda lisusu te kotondisaka formilɛrɛ Lapolo ya boyekoli (S-3) mpo na moto mokomoko oyo bayekoli na ye Biblia na boumeli ya sanza. Nzokande, bakokoba kokoma motángo ya bato oyo bayekolaki na bango Biblia na molɔngɔ oyo esengeli, na formilɛrɛ Lapolo ya mosala ya kosakola (S-4). Kobanda sikoyo, formilɛrɛ S-3 ekobanda kosalelama kaka mpo na kokoma motángo ya bayangani na makita ya lisangá.
◼ Lamuká! ya Novɛmbɛ 2007 ekozala na motó ya likambo: “Okoki kotyela Biblia motema?” Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (10 %) koleka ndenge bazwaka.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ 2007 ekozala na motó ya likambo “Okoki kozala na bomoi ya ntina!” Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (10 %) koleka ndenge bazwaka.
◼ Liboso ya kokɔta lopitalo, ekozala malamu osolola na nkulutu moko ya lisangá na bino oyo akoki kosolola na Komite ya boyokani elongo na minganga. Komite yango ekosalisa yo oyeba nkombo ya minganga oyo basalisaka maladi na yo mpe oyo bandimaka kosalisa Batatoli ya Yehova. Esengeli kosala bongo, mingi mpenza soki okanisi ete bakoki kotinda yo na lopitalo mosusu, ezala na ekólo na bino to na ekólo mosusu. Mpo na kotosa bosantu ya makila, ekozala malamu oyeba nkombo ya monganga oyo andimaka kosalisa Batatoli, liboso ete osala mobembo. Betele ekoki kosalisa yo oyeba minganga oyo bakondima kosalisa yo, kasi yo ná libota na yo nde bosengeli kosala makambo mosusu nyonso oyo etikali.