Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Sɛtɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia na buku yango, na mbala ya liboso oyo tokutani na bango. Soki bato oyo tokei kotala bazali na buku yango, tokolakisa bango na mokuse ndenge boyekoli esalemaka mpo na kosalisa bango bázwa matomba na buku yango. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto asepeli, tokolakisa ye trakte Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? mpe tokolimbwela ye yango, mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Novɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Tokosala makasi tóbanda koyekola na bato Biblia. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Soki bato yango balobi ete bazali na bana, tokolakisa bango buku Yekolá epai ya Moteyi Monene.
◼ Lokola sanza ya Novɛmbɛ ekozala na mikolo mitano ya pɔsɔ mpe mikolo mitano ya lomingo, ekozala sanza ya malamu mpenza mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi.
◼ Lisukulu ya ntina mingi mpo na mobu 2009 oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ekosalema na pɔsɔ ya 20 Aprili 2009. Motó ya likambo ya lisukulu yango ekoyebisama nsima. Masangá oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakotala, to oyo bakozala na liyangani ya zongazonga to ya mokolo moko na pɔsɔ yango, bakosala lisukulu yango na pɔsɔ oyo ekolanda. Lisangá moko te esengeli kosala lisukulu yango liboso ya pɔsɔ ya 20 Aprili.
◼ Masangá basengeli kobanda kosɛnga bavolimi relye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! ya mobu 2008, Index des publications de la Société Watch Tower, mpe diskɛ CD-ROM Watchtower Library—2008 na komande na bango ya mikanda ya mbala ekoya. Lokasa “Avis aux congrégations,” oyo biro etindelaka masangá nyonso sanza na sanza, ekomonisa bino soki mikanda yango ekozala na minɔkɔ nini. Bóbosana te ete diskɛ CD-ROM Watchtower Library—2008 ezali kaka mpo na basakoli, mpe moto akoki kozwa yango kaka soki asɛngi yango na nzela ya lisangá. Basakoli oyo basalelaka mingi diskɛ CD-ROM Watchtower Library mpe basalelaka lisusu mpenza te bavolimi relye basengeli kotala malamumalamu soki ebongi ete basɛngaka bavolimi relye.
◼ Mokɛngɛli-mokambi akopona ndeko moko oyo akotalela kɔnti ya lisangá mpo na sanza ya Yuni, Yuli, mpe Augusto. Esengeli te ete ndeko wana kaka atalelaka kɔnti yango mbala nyonso. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.—Talá formilɛrɛ Instructions pour la comptabilité des congrégations (S-27).