Tólukaka bato oyo babongi
1. Ndenge nini tomonisaka botɔndi na biso mpo na libaku malamu ya kosakola?
1 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, amipesaki mpenza mpo na koyebisa babola nsango malamu oyo ebɔndisaka. (Yis. 61:1, 2) Lelo oyo, biso baoyo tozali bantoma mpe batindami na esika ya Kristo, tozali na libaku malamu ya komekola ye ntango tozali koluka malamumalamu mpe na molende bato oyo babongi na kati ya teritware na biso.—Mat. 10:11; 2 Ko. 5:20.
2. Nini emonisi ete Paulo azalaki komesana na makambo ya sika, mpe yango ebotaki mbuma nini?
2 Tóyeba komesana na makambo ya sika: Ntoma Paulo azalaki na momeseno ya kokende libosoliboso na sinagoga mpo na kosakwela Bayuda ná baprozelite. (Mis. 14:1) Na engumba Filipi, ye ná Silasi bakendaki koluka bato na esika oyo ‘bakanisaki ete ezali esika ya mabondeli.’ Babandaki kopesa litatoli epai ya basi oyo bazalaki wana, mpe eumelaki te moko na bango, nkombo na ye Lidia, andimaki solo.—Mis. 16:12-15.
3. Longola kosakola ndako na ndako, bisika nini mosusu tokoki kosakola na teritware na biso?
3 Na kartye na bino, longola teritware oyo okoki kosakola ndako na ndako, okoki nde kosakola na bisika oyo bato bazelaka bisi, na baparke, na babiro, na babalabala, na bisika ya mombongo mpe na bamagazini? Mbala mosusu mpe okoki kotinda mikanda to kosalela telefone mpo na kopesa litatoli epai ya bato oyo bafandaka na mapango to bapartema oyo epekisami mpo bato bákɔta. Koyeba kosalela miso mpe komesana na makambo ya sika na teritware na bino ekosalisa yo ozala na “mingi ya kosala na mosala ya Nkolo.”—1 Ko. 15:58.
4. Ekateli nini tokoki kozwa soki lisangá na biso ezali na teritware ya monene te?
4 Basakoli mingi bakómaki na likoki ya kosala mingi na ndenge bazwaki ekateli ya kokende kopesa mabɔkɔ na lisangá mosusu, ezala na mboka na bango to na mboka mopaya. Bamosusu bayekolaki monɔkɔ ya bapaya mpo na kosakola epai ya bato oyo bautaki na ekólo mosusu.
5. Ndenge nini tosengeli kotalela ntango oyo tozali, mpe tosengeli kozala na ekateli ya kosala nini?
5 Biso nyonso tosengeli kobosana te ete “elanga ezali mokili.” (Mat. 9:37; 13:38) Lokola nsuka ya mokili oyo mabe ekómi pene, mokomoko na biso asengeli kotalela malamu bomoi na ye, makoki na ye, mpe makambo mosusu oyo akoki kosala mpo amipesa lisusu mingi na mosala ya kosakola. Yehova alaki biso ete soki totye Bokonzi na esika ya liboso, akopambola milende oyo tozali kosala mpo na komipesa mingi na mosala ya kosakola.—Mat. 6:33.