“Yaká, landá ngai”
1. Libaku nini tokozala na yango na Boyekoli ya Biblia na lisangá na basanza ezali koya?
1 Masolo ya bomoi ya Yesu awa na mabele, ndenge eyebisami na Baevanzile nyonso minei, emonisi biso makambo mingi oyo etali Mwana ya Nzambe. Lokola biso bakristo tosengeli ‘kolanda matambe na ye malamumalamu,’ ekozala malamu tómibongisaka mpe tótyaka mpenza likebi ntango tokobanda koyekola buku “Yaká, landá ngai” na Boyekoli ya Biblia na lisangá; boyekoli yango ekobanda na minɔkɔ mosusu na pɔsɔ ya 1 Marsi. (1 Pe. 2:21; Mrk. 10:21) Ebongi tótalela mpenza makambo ya bomoi ya Yesu oyo ekoki kolendisa biso na mosala ya kosakola.
2. Litomba nini tokoki kozwa na ndakisa ya koyika mpiko oyo Yesu atikaki?
2 Ndakisa oyo Yesu atiká: Na mosala ya ndako na ndako, osilá kokutana na moto oyo aboyi koyoka yo? Ntango tokutani na likambo ya ndenge wana, tokanisaka mbala moko maloba oyo ya Yesu ete: “Soki banyokolaki ngai, bakonyokola mpe bino.” (Yoa. 15:20) Tokoloba te ete ntango nyonso oyo moto aboyi koyoka biso, azali konyokola biso. Atako bongo, Yesu ayikaki mpiko liboso ya komekama mpe minyoko nyonso oyo akutanaki na yango mpo na esengo oyo etyamaki liboso na ye. Biso mpe tokoki kotya makanisi na biso na esengo ya kondimama epai ya Yehova mpe na mbano oyo tokozwa mpo na bosembo na biso. Yango nde ekosalisa biso ‘tósila makasi te mpe milimo na biso elɛmba te.’ (Ebr. 12:2, 3; Mas. 27:11) Wana tozali koyika mpiko na mosala ya kosakola, tokoki kozala na elikya ete Kristo Yesu azali elongo na biso.—Mat. 28:20.
3. Ndenge nini tokoki komekola Yesu na ndenge oyo azalaki kotalela mosala ya kosakola?
3 “Natindamaki mpo na yango”: Yesu atyaki mosala ya kosakola na esika ya liboso na bomoi na ye. (Luka 4:43) Amipesaki mobimba na mosala yango. Azalaki kotalela yango lokola mosala oyo esengeli kosalema na lombangu, azalaki koluka mabaku ya kolobela Bokonzi. Lokola tozali bayekoli na ye, ndakisa na ye esengeli kotinda biso tósalaka nini? Na misala na biso ya mokolo na mokolo, tokutanaka nde na bato oyo tokoki koyebisa bango nsango malamu? Tiká ete bolingo oyo Kristo azali na yango etinda biso tóyebisa nsango malamu epai ya bato mingi koleka!—2 Ko. 5:14.
4. Ndenge nini tokoki kozala bateyi malamu na mosala ya kosakola?
4 “Naino moto mosusu alobá lokola moto oyo te”: Ndenge oyo Yesu azalaki koteya ezalaki kokamwisa bato oyo bazalaki koyoka ye. (Yoa. 7:46; Mat. 7:28, 29) Nini ekesenisaki Yesu ná bateyi mosusu? Yesu alingaki solo oyo azalaki koteya, alingaki bato oyo azalaki koteya, mpe asalelaki mayele ndenge na ndenge mpo na koteya. Soki tomekoli Moteyi Monene, tokosala mosala na biso malamu koleka.—Luka 6:40.
5. Mokano na biso esengeli kozala nini ntango tozali koyekola buku “Yaká, landá ngai”?
5 Awa tolobeli kaka mwa makambo moke etali bomoi ya Yesu. Makambo nini mosusu ya ntina oyo okoki koyekola? Ntango tokobanda kotalela bomoi ya Yesu na Boyekoli ya Biblia na lisangá, omityela mokano ya “koyeba bolingo ya Kristo” na komekoláká maloba mpe misala na ye.—Ef. 3:19.