Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Febwali: Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Marsi: Biblia eteyaka mpenza nini? Basakoli basengeli komityela mokano ya kobanda koyekola Biblia na bato oyo batikelaki buku yango to bato oyo basilá kozwa yango. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango basakoli bazali kozongela bato oyo basepelaki, ata mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli to na makita mosusu, kasi bayanganaka na makita nyonso ya lisangá te, basengeli kosala makasi bátikela bango buku Biblia eteyaka mpenza nini? Bakosala bongo na mokano ya kobanda na bango boyekoli ya Biblia.