Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/10 lok. 4
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 3/10 lok. 4

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokokabola na Marsi: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki mosakoli atikeli moto buku yango to akutani na moto oyo asilá kozwa yango, asengeli kosala makasi abanda koyekola na ye Biblia. Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Ntango tozali kozongela bato oyo basepelaki na nsango malamu, ata mpe baoyo bayanganaki na Ekaniseli to na mayangani na biso mosusu, kasi bayanganaka na makita nyonso ya lisangá te, tósala makasi mpo na kotikela bango buku Biblia eteyaka mpenza nini? Mokano na biso esengeli kozala ya kobanda koyekola na bango Biblia.

◼ Bazulunalo ya sika, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! esengeli kokabolama mbala moko ntango ekómi na lisangá. Yango ekosalisa basakoli báyeba makambo oyo ezali na kati ya bazulunalo yango liboso ya kolakisa yango na mosala ya kosakola.

◼ Ekaniseli ekosalema mokolo ya mibale, 30 Marsi 2010. Soki bozwi buku ya sika, bokoyemba loyembo 8 mpe loyembo 109. Soki na lisangá na bino bosalaka makita mokolo ya mibale, bosengeli kozwa bibongiseli mpo na kosala makita yango mokolo mosusu na kati ya pɔsɔ. Soki masangá mingi eyanganaka na Ndako ya Bokonzi moko mpe likoki ezali te ya kosala makita mokolo mosusu, mbala mosusu bokomona malamu bósala yango te. Soki ezali bongo, mpe bomoni ete masolo mosusu ya Likita ya Mosala ya pɔsɔ yango ekoki mpenza kosalisa lisangá na bino, bokoki kokɔtisa yango na Likita ya Mosala ya bapɔsɔ mosusu.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto