Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 26 Aprili 2010. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 20. Bozongeli yango ekotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 1 Marsi tii na pɔsɔ ya 26 Aprili 2010.
1. Naomi azalaki kokanisa nini ntango alobaki ete, “Yehova asambwisi ngai mpe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ayeiseli ngai mpasi”? (Ruta 1:21) [w05 1/3 lok. 27 par. 2]
2. Bizaleli nini ekómisaki Ruta “mwasi moko malamu mingi”? (Ruta 3:11) [w05 1/3 lok. 28 par. 7]
3. Maloba ya Elekana oyo ete “mpo na yo, ngai naleki bana mibali zomi te” elendisaki mwasi na ye na nini? (1 Sa. 1:8) [w90 15/3 lok. 27 par. 4-5]
4. Mpo na nini ezalaki mabe ndenge Bayisraele basɛngaki mokonzi? (1 Sa. 8:5) [w05 15/9 lok. 20 par. 17; it-2-F lok. 827 par. 1]
5. Ndenge nini Samwele, oyo ‘akómaki mobange mpe na nsuki mpɛmbɛ,’ apesaki ndakisa na oyo etali kobondela mpo na basusu, mpe yango emonisi nini? (1 Sa. 12:2, 23) [w07 1/6 lok. 29 par. 14-15]
6. Mpo na nini Saulo asalelaki Bakeni boboto? (1 Sa. 15:6) [w05 15/3 lok. 23 par. 1]
7. Mpo na nini Saulo atunaki Davidi ete, “Elenge mobali, yo mwana ya nani?” (1 Sa. 17:58) [w07 1/8 lok. 31 par. 3, 5]
8. Liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Davidi asalaki mpo alongwa na mokakatano oyo akutanaki na yango na Gate? (1 Sa. 21:12, 13) [w05 15/3 lok. 24 par. 5]
9. Ndenge nini Yonatane amonisaki bolingo mpe komikitisa ntango asengelaki kosunga mpe kolendisa moninga na ye Davidi? (1 Sa. 23:17) [lv lok. 28 par. 10, msl.]
10. Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Saulo, oyo akendaki kokutana na nganga-nkisi ya mboka Ene-dore? (1 Sa. 28:8-19) [w05 15/3 lok. 24 par. 8]