Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/10 lok. 4
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2010
Mosala na biso ya Bokonzi—2010
km 9/10 lok. 4

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Sɛtɛmbɛ: Biblia eteyaka mpenza nini? Salá makasi obanda koyekola na bato Biblia na mbala ya liboso oyo okutani na bango. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki omoni ete moto asepeli, lakisá ye trakte Okosepela koyeba solo? mpe salá makasi obanda koyekola na ye Biblia. Novɛmbɛ: Un livre pour tous, Une vie pleinement satisfaisante : Comment ?, Bilimu ya bakufi​−Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo? Nzela ya bomoi ya seko​−Osili komona yango?

◼ Ekaniseli: Bómindimisa ete lapolo na bino ya Ekaniseli etindamaki na Betele. Soki bozali koyeba lisusu te soki botindaki yango, bokoki kotinda yango na SMS na kolanda malako oyo ezali na mokanda ya 15 Desɛmbɛ 2006.

◼ Lapolo: Bósala mpenza makasi mpo na kotinda nokinoki lapolo ya lisangá na bino sanza nyonso. Tolingi ete lapolo ya mosala ya kosakola na filiale na biso oyo ebimaka na Annuaire emonisa mitángo ya solo, ata mpo na basanza ya nsuka ya mobu ya mosala.

◼ Lisukulu ya ntina mingi oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ya mobu 2011 ekosalema na pɔsɔ ya 25 Aprili 2011. Motó ya likambo na yango ekoyebisama nsima. Masangá oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakotala to oyo bakozala na liyangani na pɔsɔ wana, bakosala lisukulu yango na pɔsɔ oyo ekolanda. Lisangá moko te esengeli kosala lisukulu yango liboso ya pɔsɔ ya 25 Aprili.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto