Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki omoni ete moto asepeli, lakisá ye trakte Okosepela koyeba solo? mpe salá makasi obanda koyekola na ye Biblia. Novɛmbɛ: Bilimu ya bakufi−Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?, Nzela ya bomoi ya seko−Osili komona yango?, Un livre pour tous mpe Une vie pleinement satisfaisante : Comment ? Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Soki na ndako yango bana bazali, lakisá buku Yekolá epai ya Moteyi Monene. Yanuali: Biblia eteyaka mpenza nini? Soki mosakoli akutani na moto oyo asilá kozwa buku yango, akoki kopesa ye buku mosusu ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1995.
◼ Tosɛngi bino bótánga liboso lisolo oyo ezali na motó ya likambo: Yehova alingi bózala “malamu,” oyo ekosalema na pɔsɔ ya 1 Novɛmbɛ 2010.
◼ Na mokolo ya pɔsɔ 27 Novɛmbɛ 2010, bandeko ya libota ya Betele bakozala na ebongiseli moko oyo etaleli kaka bango. Yango wana, tosɛngi bino bósala te programɛ ya koya kotala Betele to bandeko ya libota ya Betele na mokolo yango.