Bana na yo basili komibongisa?
1. Mpo na nini esengeli bana-kelasi bámibongisa?
1 Etikali moke bana bázonga na kelasi. Na ntembe te, bana na yo bakokutana na mikakatano mosusu mpe na bato oyo bakotinda bango básala makambo ya mabe. Bakozwa mpe mabaku mosusu ya ‘kopesa litatoli na ntina na solo.’ (Yoa. 18:37) Basili komibongisa?
2. Mpo na komibongisa, makambo nini bana na yo basengeli koyeba?
2 Bana na yo bayebi malamu oyo babengi kosangana na milulu ya kokumisa ekólo, na bafɛti ya bapakano, mpe mpo na nini kosala yango ezali mabe? Basili komibongisa mpo na koyeba ndenge oyo bakoloba soki batye bango mbamba bátánga bakelasi milai, bálingana na mibali to na basi, bámɛla masanga mingi to bámɛla bangi? Bakosuka kaka na koloba ete ezali likambo oyo epekisami na lingomba na bango, to bayebi ndenge ya kolimbola bindimeli na bango?—1 Pe. 3:15.
3. Ndenge nini na Losambo na kati ya libota baboti bakoki kosalisa bana na bango bámibongisa?
3 Salisá bana na yo na ntango ya Losambo na kati ya libota: Ezali solo ete na boumeli ya mbula mobimba okoki kosololaka na bana na yo soki bakutani na mokakatano moko na kelasi. Soki osali mpenza makasi mpo na kotalela mikakatano oyo bakoki kokutana na yango na kelasi liboso ete kelasi ezonga, bana na yo bakobanga eloko te. Mpo na nini te kozwa pɔsɔ moko to bapɔsɔ mingi na Losambo na kati ya libota mpo na kotalela yango? Okoki kotuna bana na yo makambo nini etungisaka bango mingi ntango balingaka kozonga kelasi. Okoki kozongela lisusu makambo oyo oyekolaki elongo na bango na bambula eleki, lokola bana yango bakoli mwa moke mpe boyebi na bango ebakisami. (Nz. 119:95) Bokoki kosala bilakiseli oyo ekomonisa moboti moko azwi esika ya molakisi, ya mopesi-toli ya eteyelo, to ya mwana-kelasi mosusu. Teyá bana na yo ndenge ya kopesa biyano oyo euti na Biblia mpe kosalela babuku lokola Comment raisonner mpe Mituna oyo bilenge batunaka. Ndeko mwasi moko asalaki elakiseli ná bana na ye mpo na kosalisa bango báyeba ndenge ya kosolola na balakisi na bango ya sika na ebandeli ya mbula nyonso ya kelasi, mpe koyebisa bango ete bazali Batatoli ya Yehova.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 2010, nkasa 3-5.
4. Baboti ya bwanya basalaka nini?
4 Mikakatano oyo bilenge bakristo basengeli kokutana na yango na mikolo oyo ya nsuka ezali “mpasi mpenza” mpe ezali se kobakisama. (2 Tim. 3:1) Baboti ya bwanya bamonaka mikakatano yango na mosika mpe basalisaka bana na bango bálonga yango. (Mas. 22:3) Liboso ete kelasi ebanda, salá nyonso oyo okoki kosala mpo na kosalisa bana na yo bámibongisa.