Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokokabola na sanza ya nsambo: Nsango malamu oyo euti na Nzambe!, Yoká Nzambe mpe Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko mpe tokosala makasi ya kobanda koyekola na bato Biblia. Sanza ya mwambe: Trakte ya sika Epai wapi tokoki kozwa biyano na mituna minene etali bomoi? Sanza ya libwa: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!
◼ Na kotalela minɔkɔ oyo elobamaka epai na bino, tozali kolendisa bino bósalela mwa babuku Yoká Nzambe mpe Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko mpe batrakte oyo elandi: Otalelaka Biblia ndenge nini? (T-30); Okanisaka ete bomoi ekozala ndenge nini na mikolo ezali koya? (T-31); Nini epesaka esengo na libota? (T-32); Nani mpenza azali koyangela mokili? (T-33); Bampasi ekosila mokolo mosusu? (T-34); mpe Bakufi bakozonga mpenza na bomoi? (T-35) Tosɛngi bino bósɛnga yango na nzela ya formilɛrɛ S-14. Batrakte yango ezali mpe na minɔkɔ mosusu 26 oyo: Alur, Bembe, Bushoong, Dengese, Ebudza, Kanyoka, Kikongo ya Leta, Kimanyanga, Kinande, Kipende, Kituba (Brazzaville), Lari (Brazzaville), Lega, Lendu, Lingombe, Lomongo, Mashi, Mbala, Ngbaka, Ngbandi, Sanga, Songomeno, Teke, Yaka, Yansi mpe Yombe.
◼ Tozali kosɛnga na masangani ya bankulutu ete bábanda kobongisa formilɛrɛ Aide-mémoire pour la maintenance et la sécurité de la Salle du Royaume (CN-14) oyo etindamaka mbula na mbula. Esengeli kotinda formilɛrɛ yango liboso ya mokolo ya 1 sanza ya libwa.