Mayebisi
◼ Diskur ya ntina mingi oyo ebongisami mpo na eleko ya Ekaniseli ya mobu 2015 ekosalema na pɔsɔ ya 6 sanza ya 4. Motó ya likambo na yango ekoyebisama nsima. Na masangá oyo bakoyamba mokɛngɛli ya zongazonga to bakozala na liyangani na pɔsɔ yango, bakolanda diskur yango na pɔsɔ oyo ekolanda. Lisangá moko te esengeli kosala diskur yango liboso ya pɔsɔ ya 6 sanza ya 4.
◼ Kobanda na sanza ya libwa, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala diskur ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo: “Ndenge bwanya oyo euti na Nzambe epesaka biso matomba.”