Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 12/14 nk. 2-3
  • Tótambwisaka boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ebongi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tótambwisaka boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ebongi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Masolo mosusu
  • Salisá moyekoli na yo akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya mibale
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Tyá likebi na ‘mayele na yo ya koteya’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 12/14 nk. 2-3

Tótambwisaka boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ebongi

1. Mokumba nini basakoli oyo bayekolaka na bato Biblia bazali na yango?

1 Moto moko te akoki kosalela Yehova Nzambe, soki ye moko “abendi ye te.” (Yoa. 6:44) Atako bongo, basakoli oyo batambwisaka boyekoli ya Biblia basengeli kosala nyonso mpo na kosalisa bato bápusana penepene na Tata na bango ya likoló. (Yak. 4:8) Yango esɛngi komibongisa. Kotánga kaka paragrafe mokomoko mpe kotuna motuna oyo ekomami ekoki te mpo na kosalisa bayekoli ya Biblia bákanga ntina ya nsango malamu mpe bákola.

2. Koyekola na moto Biblia na ndenge oyo ebongi ekokisaka makambo nini?

2 Mpo na kotambwisa boyekoli na ndenge oyo ebongi, basakoli basengeli kosalisa bayekoli (1) bákanga ntina na makambo oyo Biblia eteyaka, (2) bándima yango, mpe (3) básalela yango. (Yoa. 3:16; 17:3; Yak. 2:26) Ekoki kozwa basanza mpo osalisa moto akokisa makambo wana. Kasi, likambo mokomoko wana ekosalisa ye akolisa boyokani na ye na Yehova mpe amipesa na ye.

3. Mpo na nini bateyi ya malamu batunaka mituna oyo ekotinda moto abimisa makanisi na ye?

3 Luká koyeba makanisi ya moyekoli: Mpo na koyeba soki moyekoli akangi ntina mpe andimi makambo oyo azali koyekola, kolobaka mingi te mpe lendisá moyekoli abimisa makanisi na ye. (Yak. 1:19) Azali mpenza kokanga ntina na oyo Biblia elobi na likambo bozali koyekola? Akoki kolimbola likambo yango na maloba na ye moko? Ndenge nini azali kotalela makambo oyo ayekoli? Andimaka ete oyo Biblia eteyaka eleki ndeko te? (1 Tes. 2:13) Azali koyeba ete makambo oyo azali koyekola esengeli kotinda ye abongola lolenge ya bomoi na ye? (Kol. 3:10) Mpo tózwa biyano na mituna wana, tosengeli kotunaka na mayele mituna oyo ekotinda moto abimisa makanisi na ye, mpe koyoka ye.​—Mat. 16:13-16.

4. Tokosala nini soki moyekoli azali na mokakatano ya kokanga ntina to kosalela makambo oyo tozali koteya ye na Biblia?

4 Mbala mingi, mimeseno mpe ndenge ya kokanisa epikamaka makasi mpe ezwaka ntango mpo na kobongola yango. (2 Ko. 10:5) Tokosala nini soki moyekoli azali te kondima to kosalela makambo oyo tozali koteya ye? Tosengeli kozala motema molai mpe kotika ntango oyo ekoki mpo Liloba ya Nzambe mpe elimo santu esala mosala na motema ya moyekoli. (1 Ko. 3:6, 7; Ebr. 4:12) Soki moyekoli azali na mokakatano ya kokanga ntina to kosalela liteya moko ya Biblia, na esika ya kotingama, mbala mingi ezalaka malamu tóleka na lisolo mosusu. Wana tozali kokoba koteya ye Biblia na motema molai mpe na bolingo, nsukansuka, akoki kosala bambongwana oyo esengeli.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto