MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 52-59
“Bwakelá Yehova mokumba na yo ya kilo”
Davidi akutanaki na makambo mingi ya mpasi na bomoi. Ntango akomaki Nzembo 55, akutanaki na mikakatano lokola . . .
Kofingama
Monyoko
Motema mpasi
Likama na libota
Maladi
Basalelaki ye likita
Ata ntango mikumba na ye emonanaki lokola eleki kilo, Davidi azangaki lisalisi te. Moto nyonso oyo azali koyoka lokola Davidi, alanda toli na ye oyo: “Bwakelá Yehova ye moko mokumba na yo ya kilo.”
Ndenge nini tokoki kosalela vɛrsɛ yango lelo?
Bondelá Yehova makasi ntango ozali na makambo, mitungisi, to mikakatano
Luká toli mpe lisalisi na Liloba ya Yehova mpe na ebongiseli na ye
Salá oyo okoki kosala mpo na kobongisa mwa moke makambo na kolanda toli ya Biblia