Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb17 Février lok. 8
  • Salisá bana na yo bázala na kondima makasi ete Mozalisi azali

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salisá bana na yo bázala na kondima makasi ete Mozalisi azali
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Masolo mosusu
  • Luka kotalela bilembeteli
    Lamuká!—2021
  • Makambo mosusu oyo ekoki kosalisa libota
    Lamuká!—2018
  • Okoki kozwa lisalisi
    Lamuká!—2020
  • Balongaki ezaleli ya kokanisela basusu mabe
    Lamuká!—2020
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
mwb17 Février lok. 8

BOMOI YA BAKRISTO

Salisá bana na yo bázala na kondima makasi ete Mozalisi azali

Biloko oyo ekelamá esakolaka nkembo ya Yehova. (Nz 19:1-4; 139:14) Kasi, mokili ya Zabolo ezali kobimisa makanisi ndenge na ndenge na oyo etali ndenge bomoi ebandá mpo na kobebisa lokumu ya Nzambe. (Ro 1:18-25) Okoki kosala nini mpo makanisi yango ezwa misisa te na makanisi mpe na motema ya bana na yo? Ntango bazali naino mike, bandá kosalisa bango bázala na kondima ete Yehova azali mpe ete atyelaka bango likebi. (2Ko 10:4, 5; Ef 6:16) Luká koyeba soki bakanisaka mpenza nini mpo na makambo oyo bateyaka bango na kelasi, mpe salelá biloko ndenge na ndenge oyo tozali na yango mpo na kosimba motema na bango.​—Mas 20:5; Yk 1:19.

Tata moko azali koteya bana na ye ete Nzambe akelá biloko nyonso; bazali koteya bana-kelasi ete biloko nyonso ebimá yango moko; Makambo bilenge mosusu balobi—Kondima ete Nzambe azali

BÓTALA VIDEO MAKAMBO BILENGE MOSUSU BALOBI: KONDIMA ETE NZAMBE AZALI; NA NSIMA BÓTALELA MITUNA OYO:

  • Bato balobaka nini na oyo etali kondima ete Nzambe azali?

  • Na kelasi na biso bateyaka nini?

  • Nini endimisaka yo ete Yehova azali?

  • Okoki koloba nini mpo na kosalisa moto amona ete Nzambe nde akelá biloko nyonso?

BILOKO MOSUSU OYO EKOKI KOSALISA:

• Masolo ya JW.ORG “Mateya ya Biblia mpo na bana” (Mbula 3 kitá)

• Video Kómá moninga ya Yehova: ‘Yehova azalisaki biloko nyonso’

• Masolo ya Lamuká! “Ebimá kaka yango moko?”

• Lokasa mpo na bilenge na JW.ORG “Mpo na nini nandimaka ete Nzambe azali?”

• Masolo ya JW.ORG “Bomoi ekelamá to ebimá yango moko?” (biteni minei)

• Bavideo na TV JW “Makanisi na oyo etali ebandeli ya bomoi”

• Video Les merveilles de la création révèlent la gloire de Dieu

• Mwa buku La vie a-t-elle été créée?

• Buku Y a-t-il un créateur qui se soucie de vous?

Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie

Cinq questions à se poser sur l’origine de la vie

Mwa buku yango esalemá mingimingi mpo na kosalisa Batatoli ya bilenge oyo bayekolaka liteya ya evolisyo na kelasi. Tokoki mpe kopesa yango bato oyo balingaka koyeba makambo ya sikisiki mpo na kondima ete Mozalisi azali.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto