MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOANE 9-10
Yesu abatelaka bampate na ye
Boyokani oyo ezalaka kati na mobateli ya mpate ná bampate eutaka na koyebana mpe kotyelana motema. Yesu, mobateli ya mpate oyo aleki malamu, ayebi mpate na ye mokomoko. Ayebi bamposa ya mpate mokomoko, bolɛmbu na yango, mpe makasi na yango. Bampate eyebi ye malamumalamu mpe etyaka motema na litambwisi na ye.
Ndenge nini Yesu, mobateli ya mpate oyo aleki malamu, . . .
ayanganisaka bampate na ye?
akambaka bampate na ye?
abatelaka bampate na ye?
aleisaka bampate na ye?