Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb24 Janvier nk. 3-16
  • 08-14/01

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 08-14/01
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
mwb24 Janvier nk. 3-16

08-14/01

YOBO 34-35

Loyembo 30 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Ntango tozali komona makambo ya kozanga bosembo

(Min. 10)

Kobosana te ete makambo ya kozanga bosembo eutaka epai ya Yehova te (Yb 34:10; wp19.1 lok. 8 par. 2)

Tokoki komona lokola ete bato mabe bazali kozwa etumbu te; kasi, makambo na bango ezali polele na miso ya Yehova (Yb 34:​21-26; w17.04 lok. 10 par. 5)

Lolenge eleki malamu ya kosalisa baoyo bazali konyokwama mpo na kozanga bosembo ezali ya koteya bango makambo ya Yehova (Yb 35:​9, 10; Mt 28:​19, 20; w21.05 lok. 7 par. 19-20)

Mwasi moko ná mobali na ye bazali kosakwela mobali moko ná mwana na ye oyo bafandaka na mwa ndako ya moke pembeni ya bandako ya milai ya kitoko.

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Yb 35:7—Elihu alingaki koloba nini ntango atunaki Yobo: “Eloko nini [Nzambe] akozwa epai na yo?” (w17.04 lok. 29 par. 3)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Yb 35:​1-16 (th liteya 10)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Yebisá moto ete olingi koyekola na ye Biblia. (lmd liteya 10 pwɛ 3)

5. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 4) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Lakisá moto oyo azali na bana mike ndenge ya kozwa makambo oyo esalisaka baboti na site jw.org. (lmd liteya 1 pwɛ 4)

6. Kokómisa bato bayekoli

(Min. 5) lff liteya 13 pwɛ 5 (lmd liteya 11 pwɛ 3)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 58

7. Osepelaka ‘kosakola liloba’ na libaku malamu?

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Ndeko mwasi moko asaleli telefone mpo na koteya mwasi moko na motuka.

Paulo alendisaki Timote boye: “Sakolá liloba, salá yango na molende.” (2Ti 4:2) Na bantango mosusu, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “salá yango na molende” ezalaki kosalelama mpo na kolobela soda to mokɛngɛli oyo azalaki ntango nyonso pene ya kosala mosala na ye. Maloba yango emonisi malamu mposa na biso ya koluka ntango nyonso mabaku ya kopesa litatoli ntango tozali kosolola na moto.

Kolinga Yehova mpe kozala na botɔndi mpo na nyonso oyo asalelaka biso etindaka biso tóyebisa basusu bizaleli na ye ya malamu.

Tángá Nzembo 71:8. Na nsima tuná bayangani boye:

Makambo nini ya malamu etali Yehova okosepela koyebisa basusu?

Kolinga bato mpe etindaka biso tópesa litatoli ya libaku malamu.

Lakisá VIDEO Ndenge oyo bato nkóto bayambaki solo. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini litatoli ya libaku malamu esalisaki bato nkóto báyeba solo ya Biblia?

  • Matomba nini bandimi yango ya kala ya lingomba moko bazwaki na koyekola mateya ya solo?

  • Ndenge nini kolinga bato etindaka biso tópesa litatoli ya libaku malamu?

  • Mpo na nini okanisi ete litatoli ya libaku malamu ezali mpenza lolenge malamu ya kosalisa bato báyekola koyeba Yehova?

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 4 etanda na lok. 33

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 138 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto