19-25/02
NZEMBO 8-10
Loyembo 2 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
1. “Ee Yehova, nakosanzola yo”!
(Min. 10)
Yehova azali mpenza malamu epai na biso (Nz 8:3-6; w21.08 lok. 3 par. 6)
Tozalaka na esengo ya kosanzola Yehova na ndenge toyebisaka bato misala na ye ya kokamwa (Nz 9:1; w20.05 lok. 23 par. 10)
Tosanzolaka mpe Yehova ntango toyembelaka ye na motema mobimba (Nz 9:2; w22.04 lok. 7 par. 13)
OMITUNA BOYE: ‘Na ndenge nini lisusu nakoki kosanzola Yehova?’
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min. 10)
Nz 8:3—Mokomi ya nzembo alingaki koloba nini ntango alobelaki misapi ya Nzambe? (it-1-F lok. 663)
Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Nz 10:1-18 (th liteya 11)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 3) NDAKO NA NDAKO. Nkolo-ndako ayebisi yo ete andimelaka Nzambe te. (lmd liteya 5 pwɛ 4)
5. Kolandela bokoli
(Min. 4) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Na lisolo ya liboso, moto yango ayebisaki yo ete andimelaka nzambe te, kasi asepeli bótalela makambo oyo emonisi ete Nzambe azali. (th liteya 7)
6. Diskur
(Min. 5) w21.06 nk. 6-7 par. 15-18—Motó ya likambo: Salisá moyekoli na yo ya Biblia asanzola Yehova. (th liteya 10)
Loyembo 10
7. Ndenge ya kopesa litatoli ya libaku malamu na ndenge oyo ebongi
(Min. 10) Lisolo na bayangani.
Lolenge moko oyo tokoki kopesa Yehova masanzoli mingi ezali ya kosakwela bato oyo tokutanaka na bango na zando, na mosala, na kelasi to na esika ya kozwa bisi. (Nz 35:28) Na ebandeli, tokoki mbala mosusu kobanga kopesa litatoli ya libaku malamu. Kasi, soki toyebi ndenge ya kobanda mpe kokoba lisolo na ndenge oyo ebongi, tokoki koyeba malamu kopesa litatoli ya libaku malamu mpe kutu tokozwa esengo!
Lakisá VIDEO Omibongisa mpo na kosakola “nsango malamu ya kimya”—Lukáká mabaku ya kopesa litatoli. Na nsima tuná bayangani boye:
Likambo nini oyekoli na video oyo ekoki kosalisa yo oyeba malamu kopesa litatoli ya libaku malamu?
Talá mwa makanisi oyo ekoki kosalisa yo obanda lisolo:
Lukáká mabaku ya kobanda lisolo ntango nyonso oyo obimi na ndako na yo. Bondelá mpo na yango, mpe sɛngá Yehova asalisa yo okutana na bato ya mitema sembo
Zalá na boboto mpe monisá ete ozali kotyela mpenza bato oyo okutani na bango likebi. Luká koyeba makambo etali moto yango oyo ekosalisa yo oyeba mateya ya Biblia oyo ekoki kosalisa ye
Meká kotala soki bokoki kopesana banimero ya telefone, soki ebongi
Kolɛmba nzoto te soki moto akati lisolo liboso kutu opesa ye litatoli
Kanisáká moto nsima ya kosolola na ye. Kobá komonisa ete ozali kotyela ye mpenza likebi, na kotindelaka ye vɛrsɛ moko to lisolo moko na Jw.org
Meká kosala boye: Soki moto atuni yo, ‘wikende na yo elekaki ndenge nini?,’ yebisá ye makambo oyo oyekolaki na makita to na mosala na yo ya koteya bato Biblia.
8. Bamposa ya lisangá
(Min. 5)
9. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) bt mok. 6 par. 1-8, mpe maloba ya ebandeli na eteni 2