Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb24 Juillet lok. 13
  • 19-25/08

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 19-25/08
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
mwb24 Juillet lok. 13

19-25/08

NZEMBO 75-77

Loyembo 120 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Mpo na nini tosengeli kozala na lolendo te?

(Min. 10)

Bato ya lolendo basepelisaka Nzambe te (Nz 75:4; 1Ti 3:6; w18.01 lok. 28 par. 4-5)

Mokumba to mosala nyonso oyo tozwi na lisangá ezali mpo na boboto monene ya Yehova, kasi mpo na makoki na biso te (Nz 75:​5-7; w06 15/7 lok. 11 par. 2)

Yehova akokitisa bato ya lolendo, na ndakisa bakonzi ya lofundo ya mabele (Nz 76:12)

Bililingi: 1. Ndeko mobali azali kosala diskur na liyangani. 2. Na nsima, basusu bazali kopesa ye longonya, kasi na komikitisa nyonso aboyi bákumisa ye.

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 76:10—Ntango “bato basiliki,” ndenge nini yango ekoki kosanzola Yehova? (w06 15/7 lok. 11 par. 3)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Nz 75:1–76:12 (th liteya 11)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) LITATOLI YA LIBAKU MALAMU. Bólobela video moko ya jw.org na monɔkɔ oyo moto yango alingi. (lmd liteya 1 pwɛ 4)

5. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Obongisaki lisolo mosusu, kasi obongoli yango ntango moto alobi ete andimelaka Nzambe te. (lmd liteya 2 pwɛ 5)

6. Kokómisa bato bayekoli

(Min. 5) lff liteya 15 pwɛ 4 (lmd liteya 11 pwɛ 3)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 127

7. Zalá sembo ntango bakumisi yo

(Min. 7) Lisolo na bayangani.

Lakisá VIDEO Tikalá sembo lokola Yesu—Ntango basusu bakumisi yo. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Mateya nini ozwi na komikitisa oyo Serge amonisaki ntango bakumisaki ye?

8. Kampanye mpo na kobanda koyekola na bato Biblia na sanza ya 09 na mokanda Sepelá na bomoi libela na libela!

(Min. 8) Diskur ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Pesá bandeko mposa ya kosala kampanye yango mpe lobelá bibongiseli oyo lisangá ezwi.

9. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 14 par. 7-10, etanda na lok. 110

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 95 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto