Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb24 Septembre nk. 2-3
  • 02-08/09

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 02-08/09
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
mwb24 Septembre nk. 2-3

02-08/09

NZEMBO 79-81

Loyembo 29 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Monisá ete olingaka nkombo ya Yehova oyo etondi na nkembo

(Min. 10)

Boyá makambo oyo ekobebisa lokumu ya nkombo ya Yehova (Nz 79:9; w17.02 lok. 9 par. 5)

Belelá nkombo ya Yehova (Nz 80:18; ijwbv 3 par. 4-5)

Yehova apesaka baoyo batosaka mpe balingaka nkombo na ye mbano mingi (Nz 81:​13, 16)

Ndeko mobali moko azali kopesa moninga na ye ya mosala karte ya jw.org na ntango ya bopemi.

Mpo etamboli na biso ekumisa nkombo ya Yehova, tosengeli koyebisa basusu ete tozali Batatoli na ye

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 80:1—Mpo na nini na bantango mosusu bazalaki kobenga mabota nyonso ya Yisraele na nkombo ya Yozefe? (it-2 lok. 53)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Nz 79:1–80:7 (th liteya 10)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 1) NDAKO NA NDAKO. Yebisá moto ete olingi koyekola na ye Biblia. (lmd liteya 4 pwɛ 4)

5. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Yebisá moto ete olingi koyekola na ye Biblia. (lmd liteya 4 pwɛ 3)

6. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 2) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Yebisá moto ete olingi koyekola na ye Biblia. (lmd liteya 3 pwɛ 3)

7. Kolandela bokoli

(Min. 5) NDAKO NA NDAKO. Sɛngá moto oyo aboyaki koyekola Biblia na kala, bóyekola Biblia. (lmd liteya 8 pwɛ 3)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 10

8. “Bakosantisa nkombo na ngai”

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Satana abandaki kobebisa lokumu ya nkombo ya Yehova na elanga ya Edene. Banda wana, likambo eleki ntina oyo etali bato mpe baanzelu nyonso ezali kolongisa nkombo ya Yehova.

Tótalela kaka mwa makambo mabe ya lokuta oyo Satana alobaka mpo na Yehova. Alobaka ete Yehova azali Moyangeli oyo azalaka makambo makasimakasi mpe azangi bolingo. (Eb 3:​1-6; Yb 4:​18, 19) Alobaka ete bato oyo basambelaka Yehova balingaka Ye mpenza te. (Yb 2:​4, 5) Andimisi kutu bamilio ya bato ete ebele ya biloko kitoko oyo tomonaka na mokili, Yehova te Moto akelá yango.—Ro 1:​20, 21.

Omiyoki ndenge nini mpo na lokuta yango? Na ntembe te, oyoki mposa ya koloba mpo na kokɔtela Yehova! Yehova ayebaki ete basaleli na ye bakosepela kopesa mabɔkɔ na kosantisa nkombo na ye. (Talá mpe Yisaya 29:23.) Ndenge nini okoki kopesa mabɔkɔ na kosantisama ya nkombo ya Yehova?

  • Salisá basusu báyekola koyeba mpe kolinga Yehova. (Yn 17:​25, 26) Zalá pene ya kopesa bilembeteli oyo emonisi ete Yehova azalaka mpenza mpe teyá basusu bizaleli na ye ya kokamwa. —Yis 63:7

  • Lingá Yehova na motema na yo mobimba. (Mt 22:​37, 38) Tosáká mibeko ya Yehova kaka te mpo ezali mpo na litomba na yo kasi nde mpo olingi kosepelisa Ye.—Mas 27:11

Bililingi: Bililingi ya video “Bolingo esilaka soki moke te atako . . . Bato mingi na eteyelo batosaka Nzambe te.” 1. Ariel afandi mpe mwana moko ya mobali azali kolakisa ye mosapi mpe kotuna mpo na nini apesi bendele losako te. 2. Azali kosalela Biblia mpe liteya 61 ya buku “Zwá mateya na masolo ya Biblia” na boyekoli na ye moko. 3. Atɛlɛmi liboso ya bana kelasi mpe apesi litatoli. 4. Moninga ya kelasi ya Diego apesi Diego likaya amɛla. 5. Azali kosalela tablɛti mpo na kosala bolukiluki. 6. Azali kotambola libanda ya eteyelo na bango na kimya mpe na esengo.

Lakisá VIDEO Bolingo esilaka soki moke te atako . . . Bato mingi na eteyelo batosaka Nzambe te. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini Ariel mpe Diego bakɔtelaki nkombo ya Yehova?

  • Nini etindaki bango báloba mpo na nkombo ya Yehova?

  • Ndenge nini okoki komekola ndakisa na bango?

9. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 15 par. 1-7, mpe maloba ya ebandeli ya eteni 6

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 90 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto