Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb24 Septembre nk. 14-15
  • 28/10–03/11

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 28/10–03/11
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
mwb24 Septembre nk. 14-15

28/10–03/11

NZEMBO 103-104

Loyembo 30 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Abosanaka te “ete tozali putulu”

(Min. 10)

Motema mawa ya Yehova esalaka ete azala makambo makasimakasi te (Nz 103:8; w23.07 21 par. 5)

Asundolaka biso te ntango tosali mabunga (Nz 103:​9, 10; w23.09 nk. 6-7 par. 16-18)

Asɛngaka biso te koleka oyo tokoki kopesa ye (Nz 103:14; w23.05 lok. 26 par. 2)

Mobali moko azali koyoka mwasi na ye na likebi ntango azali koyebisa ye ndenge azali komiyoka.

OMITUNA BOYE: ‘Makambo oyo nasalelaka molongani na ngai emonisaka ete nazalaka makambo makasimakasi te lokola Yehova?’

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 104:24—Vɛrsɛ yango ezali koteya biso nini mpo na nguya ya Yehova ya kokela? (cl lok. 55 par. 18)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Nz 104:​1-24 (th liteya 11)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 3) NA BISIKA YA BATO NYONSO. (lmd liteya 3 pwɛ 4)

5. Kolandela bokoli

(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Lobelá video Boyei malamu na boyekoli na yo ya Biblia na moto oyo andimi koyekola Biblia. (th liteya 9)

6. Diskur

(Min. 5) lmd apɛndisi A pwɛ 6—Motó ya likambo: Mobali asengeli ‘kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka ye moko.’ (th liteya 1)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 44

7. Oyebaka esika makoki na yo esuki?

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Kosalela Yehova na makoki na biso nyonso epesaka ye esengo, biso moko mpe toyokaka esengo. (Nz 73:28) Kasi, koluka kosalela makoki na biso nyonso kozanga kotalela esika oyo esuki ekoki komemela biso mitungisi ezangá ntina mpe kolɛmbisa biso nzoto.

Elenge mwasi na video “Tokoki kosala lisusu mingi soki tozali kosala makambo na kotalela makoki na biso.”

Lakisá VIDEO Tokoki kosala lisusu mingi soki tozali kosala makambo na kotalela makoki na biso. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Yehova azali kosɛnga biso nini? (Mik 6:8)

  • Elilingi ya video “Tokoki kosala lisusu mingi soki tozali kosala makambo na kotalela makoki na biso.” Elenge mwasi yango ná moninga na ye bazali kolendisa moyekoli moko ya Biblia na restora.
  • Nini esalisaki elenge mwasi wana atika komitungisa mingi mpo na kokokisa mokano na ye?

NDENGE NINI TOKOKI KOYEBA ESIKA MAKOKI NA BISO ESUKI?

  • Kolukaka te komikokanisa na basusu. (Ga 6:4) Kotika te ete oyo basusu bazali kosala nde etinda yo osala to okanisa kosala likambo moko. Okoki kosala mingi to mpe moke koleka moto oyo bozali na ye mbula moko to oyo makambo ya libota na bino ekokani

  • Kotika te ete kobanga epekisa yo kosala makambo ya sika. (Ro 12:1; 1Ko 7:31) Kobanga te komeka kosalela Yehova na lolenge oyo ozali komona ete ezali mpasi, to okanisi ete okosepela na yango te. —Mal 3:10

  • Meká komityela mikano ya mikemike mpo otala esika makoki na yo esuki. Na ndakisa, okokoka mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza? Na boumeli ya mwa basanza, meká kosakola bangonga ebele to kokóma mobongisi-nzela mosungi! Okokoka kozala mobongisi-nzela ya sanza na sanza mbula mobimba? Ata soki omoni ete okokoka te kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza to kosala yango bambula ebele, okoyoka mawa te soki omityelaki mikano ya mikemike mpe okokisi yango.—Mos 6:9

  • Ndimá kobongola makambo. Lokola makambo ya bomoi na biso ekoki kobongwana, makoki na biso mpe ekoki kobongwana. Na yango, taleláká mbala na mbala mikano oyo omityeli

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 17 par. 8-12, etanda na lok. 137

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 55 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto