Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb24 Novembre nk. 6-7
  • 25/11–01/12

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 25/11–01/12
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2024
mwb24 Novembre nk. 6-7

25/11–01/12

NZEMBO 109-112

Loyembo 14 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Pesá Mokonzi Yesu mabɔkɔ!

(Min. 10)

Nsima ya kozonga na likoló, Yesu afandaki na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe (Nz 110:1; w06 1/9 13 par. 6)

Na 1914, Yesu akómaki kokonza banguna na ye (Nz 110:2; w00 1/4 18 par. 3)

Tokoki komipesa na bolingo na biso moko mpo na kopesa boyangeli ya Yesu mabɔkɔ (Nz 110:3; be 76 par. 2)

Bililingi: Ndeko mobali moko ya elenge azali kopesa boyangeli ya Yesu mabɔkɔ. 1. Azali kotambwisa mikro na makita ya lisangá. 2. Azali kotambwisa ndeko mwasi moko ya mobange na kiti ya bibɔsɔnɔ. 3. Azali koyekola Biblia ye moko. 4. Ndeko moko azali kolakisa ye ndenge ya kokokisa mokumba moko.

OMITUNA BOYE: ‘Mikano nini nakoki komityela mpo na komonisa ete nazali kopesa Bokonzi mabɔkɔ?’’

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Nz 110:4—Limbolá kondimana oyo vɛrsɛ yango elobeli. (it-1 80 par. 4)

  • Biloko nini ya motuya ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, oyo okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Nz 109:​1-26 (th liteya 2)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 2) NDAKO NA NDAKO. Salelá traktɛ mpo na kobanda lisolo. (lmd liteya 4 pwɛ 3)

5. Kolimbola bindimeli na yo

(Min. 5) Elakiseli. ijwfq 23—Motó ya likambo: Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakendaka etumba te? (lmd liteya 4 pwɛ 4)

6. Kokómisa bato bayekoli

(Min. 5) lff liteya 15 pwɛ 6 mpe Soki moto alobi na yo (lmd liteya 11 pwɛ 3)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 72

7. Ndenge nini tokoki kopesa Bokonzi mabɔkɔ na bosembo nyonso?

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Bililingi ya video “Tópesa ‘Nkumu ya kimya’ mabɔkɔ na bosembo nyonso.” Bandeko mibali mibale na mosala ya kosakola bazali kosolola na mobali moko esika masuwa ya koboma mbisi etɛlɛmaka.

Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema oyo Yehova atye mpo na komonisa ete azali Moyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. (Da 2:​44, 45) Na yango, ntango tozali kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ na molende, tozali kolongisa boyangeli ya Yehova.

Lakisá VIDEO Tópesa “Nkumu ya kimya” mabɔkɔ na bosembo nyonso. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini tokoki kopesa Bokonzi mabɔkɔ na bosembo nyonso?

Komá vɛrsɛ moko oyo eyokani na lolenge mokomoko oyo tokoki kopesa Bokonzi ya Nzambe mabɔkɔ.

  • Kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso.

  • Kotosa mibeko ya Bokonzi na oyo etali bizaleli.

  • Kosakola Bokonzi na molende.

  • Komemya baguvɛrnema ya bato, kasi kotosa Nzambe ntango mobeko ya Kaisala eyokani te na mobeko ya Nzambe.

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 18 par. 16-24

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 75 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto