Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb25 Janvier nk. 14-15
  • 24/02–02/03

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 24/02–02/03
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2025
mwb25 Janvier nk. 14-15

24/02–02/03

MASESE 2

Loyembo 35 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)

MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE

1. Mpo na nini osengeli kozala molende na boyekoli na yo moko?

(Min. 10)

Mpo na komonisa ete solo ezali na motuya mingi mpo na yo (Mas 2:​3, 4; w22.08 18 par. 16)

Mpo esalisa yo ozwaka bikateli ya malamu (Mas 2:​5-7; w22.10 19 par. 3-4)

Mpo okómisa kondima na yo makasi (Mas 2:​11, 12; w16.09 23 par. 2-3)

Moyisraele moko azali kosalela epasola na kati ya mobenga.

OMITUNA BOYE: ‘Ndenge nini nakoki kobongisa lisusu boyekoli na ngai moko?’

2. Biloko ya motuya ya elimo

(Min. 10)

  • Mas 2:7—Na ndenge nini Yehova azali “nguba ya baoyo batambolaka na bosembo”? (it-1 1195 par. 4)

  • Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?

3. Botángi ya Biblia

(Min. 4) Mas 2:​1-22 (th liteya 12)

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA

4. Ndenge ya kobanda lisolo

(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Lakisá moto ndenge ya kozwa na jw.org masolo oyo ekoki kosalisa bato oyo babalá. (lmd liteya 1 pwɛ 3)

5. Kolandela bokoli

(Min. 3) LlTATOLI YA LIBAKU MALAMU. Pesá moto yango zulunalo oyo elobeli likambo oyo asepelaki na yango na lisolo na bino ya mbala eleki. (lmd liteya 9 pwɛ 3)

6. Diskur

(Min. 5) lmd apɛndisi A pwɛ 8—Motó ya likambo: Mwasi ná mobali basengeli kozala sembo epai ya moko mpe mosusu. (th liteya 13)

BOMOI YA BAKRISTO

Loyembo 96

7. Olingaka koluka biloko ya motuya?

(Min. 15) Lisolo na bayangani.

Elenge, osepelaka na likanisi ya koluka biloko ya motuya oyo ebombami? Soki ezali bongo, Biblia esɛngi yo oluka eloko oyo eleki motuya na molɔngɔ mobimba—boyebi ya Nzambe! (Mas 2:​4, 5) Okoki kozwa eloko yango ya motuya soki ozali kozwa ntango ya kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe kokɔta na mozindo na masolo oyo ozali kotánga. Kosala bongo ekopesa yo esengo mpe matomba mingi!

  • Mituna nini okoki komituna ntango ozali kotánga Biblia? (w24.02 32 par. 2-3)

  • Bisaleli nini okoki kosalela mpo na kozwa biyano?

Elenge moko asepeli ntango afungoli kɛsi oyo ezali na biloko ya motuya.

Seri ya bavideo Zwá mateya epai ya baninga ya Yehova ekoki kosalisa yo oyeba ndenge ya komanyola makambo oyo ozali kotánga na Biblia.

Ndeko mobali moko ya elenge azali koyekola ye moko. Mwa buku “La vie a-t-été-créée ?” ezali na mesa na ye.

Lakisá VIDEO Zwá mateya epai ya baninga ya Yehova —Abele.

Tángá Ebandeli 4:​2-4 mpe Baebre 11:4. Na nsima tuná bayangani boye:

  • Ndenge nini Abele amonisaki ete azali moninga ya Yehova?

  • Ndenge nini Abele akómaki na kondima makasi epai ya Yehova?

  • Ndenge nini okoki kokóma na kondima makasi?

LIKANISI

Ntango ozali kotánga Biblia, saláká bolukiluki na oyo etali bato, bisika, mpe makambo oyo ozali kotánga, ata oyo okanisi ete oyebi malamu. Soki ozali koyekola Biblia ndenge wana, okomona ete ezali mpenza makambo ya solo!

8. Boyekoli ya Biblia na lisangá

(Min. 30) bt mok. 23 par. 1-8 mpe maloba ya ebandeli na eteni 8

Maloba ya nsuka (Min. 3) | Loyembo 102 mpe libondeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto