30/06–06/07
MASESE 20
Loyembo 131 mpe libondeli | Maloba ya ebandeli (Min. 1)
1. Ndenge ya kosala mpo eleko oyo bolingani eleka malamu
(Min. 10)
Kobosana te ndenge oyo Yehova atalelaka eleko oyo bato balingani (Mas 20:24, 25; w24.05 26-27 par. 3-4)
Talelá moto na mosika liboso olingana na ye (Mas 20:18; w24.05 22 par. 8)
Bóyebana malamu na eleko oyo bolingani (Mas 20:5; w24.05 28 par. 7-8)
KOBOSANA TE: Soki eleko oyo bato balingani eleki malamu, ememaka kaka na libala te, kasi na kozwa ekateli ya malamu.
2. Biloko ya motuya ya elimo
(Min. 10)
Mas 20:27—Na ndenge nini “mpema ya moto . . . ezali mwinda ya Yehova”? (it-2 109 par. 9)
Biloko nini ya motuya ya elimo oyo ozwi na botángi ya Biblia ya pɔsɔ oyo, okosepela kolobela?
3. Botángi ya Biblia
(Min. 4) Mas 20:1-15 (th liteya 5)
4. Ndenge ya kobanda lisolo
(Min. 4) NDAKO NA NDAKO. Moto yango ayebisi yo ete auti ekólo mosusu mpe ayei kofanda awa. (lmd liteya 3 pwɛ 3)
5. Kolandela bokoli
(Min. 4) NA BISIKA YA BATO NYONSO. Yebisá moto yango ete tozalaka na JW Library® mpe salisá ye atya yango na telefone na ye. (lmd liteya 9 pwɛ 5)
6. Limbolá bindimeli na yo
(Min. 4) Elakiseli. ijwbq mok. 159—Motó ya likambo: Banyama ekendeke likoló? (lmd liteya 3 pwɛ 4)
Loyembo 78
7. Lendisá bato bámeka boyekoli na biso ya Biblia
(Min. 5) Lisolo na bayangani.
Kosɛnga bato báyekola Biblia ezali na ntina mingi na mosala ya kosakola. Mpo, ndenge nini tokosalisa bato bákóma bayekoli soki toyekoli na bango Biblia te? (Ro 10:13-15) Ntango ozali kosakola ndako na ndako, okoki komityela mokano ya kosɛnga moto polele ete bóbanda koyekola Biblia? Liboso, salá makasi oyeba likambo oyo ekoki kosepelisa ye. Na nsima, monisá ye ndenge oyo koyekola Biblia ekoki koyanola na mituna na ye mpe kosalisa ye na makambo ndenge na ndenge.
Lien “Meká boyekoli na biso ya Biblia” na jw.org ekoki kosalisa yo osɛnga bato oyo okutani na bango bóbanda koyekola Biblia.
Ndenge nini okoki kosalela lien “Meká boyekoli na biso ya Biblia” mpo na kosɛnga moto ete oyekola na ye Biblia?
Na teritware na bino, mayele nini ya kosɛnga bato ete bóyekola Biblia omoni ete esimbaka malamu?
8. Mosala ezali kosalema mpo na sanza ya 06
(Min. 10) Lakisá VIDEO.
9. Boyekoli ya Biblia na lisangá
(Min. 30) bt mok. 28 par. 8-15