LIKANISI MPO NA KOYEKOLA
Yebisáká basusu makambo oyo oyekoli
Nsima ya koyekola, tomiyokaka malamu; kasi tokoki komiyoka lisusu malamu koleka soki tozali koyebisa basusu biloko ya motuya ya elimo oyo tozwi mpo na kolendisa bango. Masese 11:25 elobi: “Moto oyo apesaka basusu mai ya komɛla, bakopesa ye mpe mai ya komɛla.”
Soki tozali koyebisa basusu makambo oyo toyekoli, makambo yango ekotikala na motó na biso mpe tokokanga ntina na yango malamu. Mpe lokola makambo yango ekoki kosalisa basusu, tokoyoka esengo ya kopesa mpo tokaboli na bango biloko ya motuya oyo tozwaki.—Mis. 20:35.
Meká kosala boye: Na pɔsɔ oyo ekoya, luká libaku ya koyebisa moto makambo oyo oyekoli. Ekoki kozala moto moko ya libota, moto moko na lisangá, moninga moko ya mosala, moninga moko ya kelasi, moto moko ya kartye, to moto oyo tokutani na ye na mosala ya kosakola. Salá makasi oloba makambo yango na maloba na yo moko na ndenge ya pɛtɛɛ mpe polele.
Kobosana te: Okoyebisa basusu makambo oyo oyekoli mpo na kolendisa bango, kasi te mpo na kokamwisa bango.—1 Ko. 8:1.