Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-bakambi
Baninga na biso Batatoli ya Yehova,
Ntoma Paulo asalelaki mabaku nyonso mpo na komonisa ete azalaki kolinga baninga na ye bandimi mpe azalaki kopesa Nzambe matɔndi mpo na bango. Akomelaki baklisto ya Loma ete: “Nazali kopesa Nzambe na ngai matɔndi na nzela ya Yesu Klisto mpo na bino nyonso, mpamba te kondima na bino ezali kolobelama bipai nyonso na mokili mobimba.” (Lom. 1:8) Ya solo, na bamboka nyonso oyo eyangelamaki na Loma, baklisto wana ya liboso bayebanaki mpo na kondima na bango ya makasi mpe molende na bango na mosala ya kosakola. (1 Tes. 1:8) Yango wana, Paulo alingaki bandeko yango mingi!
Lokola Paulo, biso mpe topesaka Yehova matɔndi mbala nyonso oyo tokanisaka bino. Tolingaka bino nyonso mingi. Bóyeba mpe ete Yehova alingaka mokomoko na bino. Basusu kati na bino bazali kokutana na botɛmɛli makasi; atako bongo, bozali kokoba kosakola. Na ntembe te, molende mpe mpiko na bino ezali kosepelisa motema ya Yehova!—Mas. 27:11.
Ntango bozali kotánga na likebi mpenza mpe komanyola makambo ya malamu mpe ya kolendisa kondima oyo ezali na Annuaire oyo, mingimingi na eteni oyo elobi “Actes des Témoins de Jéhovah de nos jours” (Misala ya Batatoli ya Yehova na mikolo na biso), bokomona makambo mingi oyo ezali kondimisa mpenza ete Nkolo Yesu Klisto azali kobima na “kolonga mpe mpo na kosukisa bolongi na ye”; mpe ete ebundeli moko te oyo esalami mpo na kotɛmɛla bayekoli ya Klisto ekolonga.—Emon. 6:2; Yis. 54:17.
Paulo akomelaki baklisto ya Filipi boye: “Napesaka . . . Nzambe na ngai matɔndi . . . ndenge bopesaki mabɔkɔ na nsango malamu.” (Filp. 1:3-5) Biso Lisangani ya Mikóló-Bakambi tosalaka mpe bongo mpo na bino. Na mbula ya mosala 2007, basakoli 6 691 790 basalaki bangonga 1 431 761 554 na mosala ya kosakola nsango malamu na mikili 236. Bozali mpenza kopesa mabɔkɔ na mosala ya kopalanganisa nsango malamu! Kanisá ebele ya bato oyo tosalisaki na milende oyo tosalaki elongo, nyonso wana mpo na lokumu ya Yehova!
Na libaku mosusu, Paulo amonisaki ete azalaki mpenza komitya na esika ya bandeko na ye. Akomelaki baklisto ya Tesaloniki boye: “Tokanisaka ntango nyonso . . . ezaleli na bino ya koyika mpiko mpo na elikya na bino na kati ya Nkolo na biso Yesu Klisto liboso ya Nzambe na biso mpe Tata.” (1 Tes. 1:2, 3) Ya solo, bomoi etondi na mikakatano; kasi tosengeli koyika mpiko. Mikakatano nini ozali kokutana na yango sikoyo? Olɛmbi nde nzoto mpo ozali kokoka lisusu kosalela Yehova te ndenge ozalaki kosala liboso mpo ozali kobɛla makasi? Molongani na yo oyo bofandaki na ye bambula ebele asili kokwea na mabɔkɔ ya sheole, monguna monene oyo atondaka te? (Mas. 30:15, 16) Ozali nde koluka mobalani oyo alingaka Yehova lokola yo mpo olingi ntango nyonso kotosa etinda ya Makomami oyo esɛngi kobala na kati ya Nkolo kaka, kasi azali kozwama te? (1 Kol. 7:39) Ozali nde kobundana mpo na kobɔkɔla bana na yo atako ozali na mikakatano makasi ya mbongo? Ezala mokakatano nini ozali na yango, soki ozali kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, yebá ete Yehova ‘akobosana te mosala na yo mpe bolingo oyo omonisaki mpo na nkombo na ye.’ Bandeko mibali mpe basi, tobondeli bino, ‘bótika te kosala oyo ezali malamu’!—Ebe. 6:10; Gal. 6:9.
Nini ekosalisa bino bóyika mpiko? Likambo oyo esalisaki baklisto ya Tesaloniki, elingi koloba ‘elikya na kati ya Nkolo na biso Yesu Klisto.’ Yango wana, na nsima Paulo akokanisaki “elikya ya lobiko” na ekɔti moko ya makasi oyo ekoki kobatela moklisto mpo akanisaka mingi te makambo oyo ekoki kolɛmbisa ye nzoto mpe azala ntango nyonso te na ntembe na motema.—1 Tes. 5:8.
Ya solo, ntango bozali koyika mpiko na esengo mpenza, bozali kopesa eyano na Satana mpo na ntembe monene oyo abɛtelaki Yehova na likambo ya boyangeli ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Satana alobaka ete basaleli ya Nzambe balukaka libosoliboso bolamu na bango moko mpe bandimaka kosalela Nzambe mpo na mwa ntango, kasi soki bamekami makasi to soki ebongiseli ya makambo ya ntango oyo eumeli mingi koleka ndenge bakanisaki, bakolɛmbisa mabɔkɔ na losambo na bango. Bozali na libaku malamu ya komonisa polele ete Zabolo azali mokosi monene! Ntango mikolo ezali koleka, kokokisama ya elikya na bino ezali mpe kokóma pene.
Se ndenge Paulo asalelaki mabaku nyonso mpo na kopesa bandeko na ye longonya mpo bazalaki na kondima makasi, bapesaki mpenza mabɔkɔ na mosala ya kosakola, mpe bayikaki mpiko, biso mpe tozali na esengo ya kosalela libaku oyo mpo na kopesa bino longonya mpe koyebisa bino ete tolingaka bino mingi. Bókoba kosala se bongo!
Tiká ete Yehova apambola bino mingi na mbula oyo.
Bandeko na bino,
Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova