Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwfq lisolo 17
  • Batatoli ya Yehova bateyaka sionisme?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova bateyaka sionisme?
  • Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova bakɔtaka na makambo ya politiki te?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • “Bazali bato ya mokili te”
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Batatoli ya Yehova bazali mpenza bakristo ya solo?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Batatoli ya Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
ijwfq lisolo 17

Batatoli ya Yehova bateyaka sionisme?

Te. Batatoli ya Yehova bazali bakristo oyo mateya na bango eutaka na Makomami. Atako mangomba mosusu eteyaka ete Biblia nde esakolaki ete Bayuda bakofanda na Palestine, Batatoli ya Yehova bateyaka bongo te. Bandimaka te ete sionisme, liteya oyo ezwi moboko na yango na makambo ya politiki, esakolamaki na Biblia. Kutu, Biblia ekumisaka guvɛrnema ata moko te ya bato to mpe komonisa ete ekólo moko eleki ekólo mosusu. Linɔ́ngi ya mosɛnzɛli, zulunalo ya Batatoli ya Yehova, elobi polele ete: “Biblia elobeli ata esika moko te sionisme, liteya oyo ezwi moboko na yango na politiki.”

Buku moko (Encyclopædia Britannica) elimboli liloba sionisme boye: “Kosangana ya Bayuda mpo básala ekólo moko ya Bayuda na Palestine mpe bápesaka yango mabɔkɔ.” Ezwi moboko na yango na makambo ya lingomba mpe ya politiki. Batatoli ya Yehova bateyaka sionisme te mpe bamikɔtisaka ata moke te na molulu wana ya politiki.

Lingomba ya Batatoli ya Yehova emipesaka mobimba kaka na makambo ya losambo. Etombolaka ebongiseli ata moko te ya politiki, ezala mpe sionisme. Mikanda mpe baemisyo ya televizyo elobelá mingi ndenge oyo Batatoli ya Yehova bamikɔtisaka te na makambo ya politiki mpe na bamboka mosusu, Batatoli ya Yehova bakutaná na minyoko ya makasi mpenza mpo baboyaki komikɔtisa na makambo ya politiki. Tondimisami mpenza ete kaka Bokonzi ya Nzambe nde ekomema kimya ya libela awa na mabele; guvɛrnema to ebongiseli ata moko te ya bato ekoki kosala yango.

Batatoli ya Yehova, bisika nyonso oyo bazali, batosaka mibeko ya Leta. Batombokelaka bakonzi ya guvɛrnema te mpe bamikɔtisaka na bitumba te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto