Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Janvier nk. 10-12
  • Lolenge nini nakoki koyika mpiko na mpamela ya baboti na ngai?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge nini nakoki koyika mpiko na mpamela ya baboti na ngai?
  • Lamuká!—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo osengeli kosala te
  • Ntina ya koyoka
  • Fanda nyee
  • Sala eloko!
  • Nakosala nini soki bapameli ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nakosala nini soki baboti na ngai baswanaka?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • “Mopanga ya Yehova mpe ya Gideona!”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Janvier nk. 10-12

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Lolenge nini nakoki koyika mpiko na mpamela ya baboti na ngai?

“BABOTI mingi bakanisaka ete lolenge malamu ya kolakisa bana na bango ezali ya kopálela bango ntango basali libunga.” Ezali yango nde Clayton Barbeau akomaki kati na mokanda na ye Lolenge nini kobokola baboti (na Lingelesi).

Soki ozali elenge, ekoki kozala ete baboti na yo bapamelaka yo mbala na mbala. Ezaleli wana, atako ezali mbala mosusu kosilikisa, nzokande ezali ntango nyonso mabe te.a Biso nyonso tozalaka na mposa ete basembola biso ntango moko to mosusu, mpe maloba makasi oyo mazali kopesa mayele makoki kozala na litomba malamu.

Epai mosusu, ezali solo ete baboti mingi, balekisaka ndelo ntango mosusu, na kotungisáká bana na bango kino kolembisa bango. (Bakolose 3:21) To mpe, kopusamáká na mayoki, bazali kopamela bango mpe koyokisa bango nsoni mpo na makambo mikemike. Kasi, ata maloba nini masalelami mpo na kopálela yo, likoki ezali ete ozwila yango litomba. Atako bongo, baboti na yo bazali na mposa ete yo obonga, boye te? Lokola Biblia elobaki yango uta kala, “soko moninga wa motema [azokisi] yo, alingi kobongisa yo.” (Masese 27:6, Liloba lya Nzambe) Ya solo, soki euti epai na bato oyo bazali penepene na yo mpenza, mpamela yango ekoki kozokisa yo makasi. Kasi okoki kolembisa mpasi ya mpamela mpe kobakisa bolamu bouti na yango, na koyekoláká koyanola na mayele.

Oyo osengeli kosala te

Talela likambo ya Stephanie: Alobi ete: “Ntango mama na ngai azalaki kozonga na mosala, azalaki kotunatuna ngai mituna mpo nabongisaki ndako te to mpo nabimisaki naino poubelle te. Azalaki koloba na ngai: ‘Na ndako, oyebi kosala eloko moko te, kasi mpo na kobima, wana ozali mpenza makasi.’ Nazalaki kozongisela ye ete: ‘Yo mpe ozali makasi mingi mpo na kopamela ngai.’ Azalaki konganga mpe nazalaki kokende kobombama kati na chambre na ngai mpo ete nayoka ye lisusu te. Azalaki bongo kofungola ekuke na kongala makasi mpo na koyebisa ngai ete nakozwa etumbu.”​—Mokanda Baboti na ngai bakomisi ngai ligboma (na Lingelesi), ya Joyce L. Vedral.

Likambo oyo likómelaka yo mbala na mbala? Soki ee, oyebi kino wapi ezali mpenza mpasi lokola kozoka na koyoka wana balobi na yo ete oyebi eloko moko te. Atako bongo, Stephanie abongisaki makambo na kosilikáká liboso ya mama na ye? Na koimaimáká, na kongangáká to na kotombokáká, okoki nde kopusa baboti na yo na kobungisa komipekisa nyonso. Bosepeli oyo okoki kooka na kopesáká nzela na nkanda na yo ezali bobele kobɔndisama moke liboso na etumbu oyo osengeli mpenza kozwa yango. Epai mosusu, elenge moklisto oyo akozanga limemya epai na baboti na ye kati na maloba na ye azali komipesa mpasi na elimo, mpe azali na likámá ya koboyama na Nzambe.​—Masese 30:17; Baefese 6:1, 2.

Mama ya Stephanie azalaki mbala mosusu kosala malamu te. Kasi mwa solo ezalaki kati na mapáleli na ye. Na koboyáká mpamela, Stephanie azalaki komibendela mindondó mingi na bomoi na ye, mpe lisusu azalaki kozanga libaku ya komisembola, nzokande yango ezalaki mpenza na ntina.

Ntina ya koyoka

Biblia ezali kopesa toli oyo: “Yoka toli mpe ndimá mpamela ete ozala na mayele na nsima.” (Masese 19:20) Bengana mposa ya koluka komilongisa, ya koimaima to ya koyanola na maloba mabe, mpe tya makanisi na yo likoló na likambo oyo bazali mpenza kopamela yo. Mpo na kozongela maloba ya zulunalo ’Teen, “yoka mpamela na motó na yo, kasi na mayoki na yo te.”

Kosaláká bongo, okomona te ete mapaleli ya baboti na yo ezali makambo minene mpenza. Bazali mpenza kotalela yo ete oyebi kosala ata eloko moko te to bazali nde koloba na yo bobele ete obebisi langi ya garage to opetoli lituká malamu te? Na likambo oyo ya mibale, mpo na nini koyanola na nkanda makasi? Biblia elobi ete, “ezali na moto moko te awa na mabelé oyo akosalaka bobele malamu kozanga libungá.” (Mosakoli 7:20, Français courant) Epai mosusu, ata soki okokisaki malamu te mosala moko, yango elimboli te ete ozali na mayele te kati na misala nyonso. Ozali na makoki mingi mpe bizaleli mingi ya malamu. Kobosana yango te.

Fanda nyee

Tata moko alobaki ete: “Ntango nyonso oyo [mwana] asali libungá, nazali koloba na ye ete azali zoba.” Osengeli kosala nini soki baboti na yo bafingi yo? Ya liboso, fanda nyee. “Ye oyo azali na mayele azali na maloba mingi te; moto na boyebi azali na motema mpiɔ.”​—Masese 17:27.

Kotya makanisi na yo te likoló na oyo omoni ete ezali sembo te kati na maloba ya baboti na yo; ekopesa yo lisusu nkanda mingi. Kasi tya makanisi na yo nyonso likoló na makambo oyo osengeli komisembola. Kobosana te ete baboti na yo balingi yo mpe bazali kosala bongo mpo na motema mabe te. (Tata oyo alobelami na paragrafe oyo eleki abakisaki likambo oyo: “Nasengelaki te koloba na ye ntango nyonso ete azali zoba. Akoya kondima ete azali solo zoba.”) Limbisa bango soki omoni ete balobi bongo mpo balɛmbi to basiliki mpo na mosala na bango. “Bososoli na moto na mayele ekokitisa nkanda na ye; nkembo na ye ezali ete akolimbisa masumu.”​—Masese 19:11.b

Na bongo eleki malamu ozongisa eloko moko te, kasi meka nde kolembisa nkanda. Na ndakisa, okoki kozongela lipaleli yango na maloba mosusu, na lolenge ete obenda likebi ya baboti na yo likoló na mokakatano ya solo. Soki tata na yo alobi na yo ete ozali zoba mpo ete asepeli te na lolenge oyo yo osukoli vuatire, mpo na nini te koyanola ete: “Osiliki mpo ete nasukoli malamu te.” To mpe okoki bobele kondima lipáleli. (“Ozali na elonga papa, esengelaki ete nasala mosala moko malamu.”) Na nsima okoki kosenga ete alakisa yo lolenge nini osengeli mpenza kosala malamu. Masese 15:1 (MN) elobi ete: “Eyano malamu ekosilisaka nkanda, nde maloba mabe makongalisaka nkɛlɛ.”

Ozali komikundola lisusu mpo na Gédéon? Biblia ezali koyebisa ete akambaki Bayisraele na elongá monene likoló na Bamadiani, libota ya bonguna. Na nsima atindaki bantomá epai na libota makasi ya Efraime, mpo na kosɛnga bango ete bakanga nzela mpo ete Bamadiani oyo bazalaki kokima baleka te. Baefraime basalaki eloko: bakangaki bakonzi mibale ya Madiani. Kasi, mibali na Efraime, na lolendo na bango, balukaki koswanisa Gédéon, na “maloba makasi.” Bamonaki mabe mpenza lokola babyangamaki te mpo na kosangana na etumba.​—Basambisi 8:1.

Koswanisa wana emonani polele ete ezalaki na nzela te. Soki Gédéon azalaki moto ya motema mɔ́tɔmɔ́tɔ, mbala mosusu akokaki kozongisela Baefraime maloba mabe mingi . . . mpe kobimisa bongo etumba kati na bango bato ya ekólo moko. Na esika ete asala motindo wana, ayanolaki ete: “Likambo nini nasali sikawa koleka oyo bino bosali? Efraime alɔkɔtaki mbuma na vinyo na nsima na babuki, mpe yango eleki kobuka na Abiɛjɛlɛ te?” (Basambisi 8:2) Gédéon alingaki koloba ete, lokola bakangaki bakonzi mibale ya Madiani, Baefraime basalaki mingi koleka oyo ye asalaki. Eyano na ye ya bopɔlɔ mpe ya komikitisa ebotaki mbuma malamu ya kopengola lipáleli ezangi ntina mpe kobatela kimya.

Liteya nini osengeli kozwa na yango? Kosilika mingi te na mapáleli ya baboti na yo. Soki okofanda nyee, okopɛngola koloba to kosala likambo oyo likopesa yo mawa na nsima.​—Tala Mosakoli 10:4.

Sala eloko!

Nzokande, kozala na bopɔlɔ na maloba ekoki te. Esengeli kosala eloko. Kobosana te ete “mayele mauti na likoló ezali pene . . . na kotosa noki.” (Yakobo 3:17) Bongisa chambre na yo, sukola vuatire, katisa nsuki, tala lisusu garde-robe na yo to sala mbongwana nyonso mosusu oyo baboti na yo balingi. Ezali mwango malamu ya kosilisa mapáleli.

Epai mosusu, ekoki kozala ete ondimi te mpamela oyo bazali kopesa yo. Na yango, ata baboti oyo baleki malamu basalaka mabunga. Kasi, na esika ya koluka ete osilisa likambo na kongangáká, zela “ntango malamu,” mpe solola yango elongo na baboti na yo. (Masese 15:23) Tozali kotanga kati na Masese 13:10 ete, “baoyo bakoyokaka toli bazali na mayele.” Limbola na malɛmbɛ nyonso makambo oyo bapameli yo na ntina na yango, na elobeli ya mokóló, koyebisáká polele na baboti na yo bantina ya sikisiki oyo oboyi kondima mpamela yango. Nani ayebi soki okobenda bango ete bandima likanisi na yo? Soki bandimeli yo te, osengeli bobele kotósa bokonzi oyo bazali na yango mpo ete bazali baboti na yo.​—Masese 6:20.

Na nsima ya bambula, okomona ete toli mpe mpamela ya baboti na yo ekopesa yo litomba. Yesu, ye oyo azalaki moto ya kokoka, ata bongo “ayekolaki kotósa kati na mpasi oyo ayikelaki mpiko,” boye te? (Baebele 5:8, MN) Yo mpe ozali na mateya kitoko ya koyekola. Osengeli uta sikawa koyika mpiko na mpamela ya balakisi na yo, kasi na mikolo mizali koya, ekosengela na yo mbala mosusu koyika mpiko na oyo ya mokonzi na yo ya mosala. Na bongo yekola uta sikawa kondima mpamela.

Nsima na bambula, ekoki kozala ete okosimba malamu likanisi ya baboti na yo. Ezali yango nde ekómelaki Jacques. Alobi ete: “Baboti na ngai bazalaki na bikateli makasi na makambo matali kelasi, lisangá mpe misala ya ndako. Mbala mosusu, bazalaki kotikela ngai te ata ntango ya kopema. Kasi, wana ezalaki ngai kokóla, nasosolaki ete mpo na kozala na mayele mingi ata na likambo nini, esengeli kosala makasi.” Wana ezali liteya moko oyo ebongaki koyekola yango mpenza. Okoyekola mpe mosusu ya kitoko soki ondimi mpamela.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tala lisoló “Mpo na nini makambo nyonso oyo nazali kosala mazali bobele mabe?” ebimaki na français kati na nimero ya Réveillez-vous! ya 22 novembre 1992.

b Awa tozali kolobela te kobeta na maloba to na nzoto na baboti oyo, emonani ete, bazali kobɛla maladi ya motó to bazali balangwi masanga to bameli drogue. Ntango mosusu baboti motindo wana bazali na mposa ya lisalisi ya monganga.

[Elilingi na lokasa 11]

Na kongangáká, na koimaimáká to na kolukáká komilóngisa, okoki kopusa baboti na yo na kobungisa komipekisa nyonso

[Elilingi na lokasa 11]

Sɛnga na baboti na yo ete balakisa yo malamumalamu lolenge nini osengeli komisembola, mpe mpamela na bango ekozokisa yo lisusu te

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto