Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g93 Octobre nk. 17-20
  • Bomoi kati na libala—Lolenge ya koyeisa yango esengo mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bomoi kati na libala—Lolenge ya koyeisa yango esengo mingi
  • Lamuká!—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Sɛkɛlɛ ya libala ya esengo
  • Monisa bolingo epai na moninga na yo ya motema
  • Tika ete ‘mbeto na libala ezala na mbindo te’
  • Mibali, bolinga mpe bosepela na basi na bino
  • “Na elengi na mongwa”
  • Mafungola mibale mpo ete libala liumela
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Tiká ete libala na bino lizala ekanganeli ya seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mokristo akoki kosala nini mpo na kozala na libala ya malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Soki libala elingi kopanzana
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
Makambo mosusu
Lamuká!—1993
g93 Octobre nk. 17-20

Bomoi kati na libala​—Lolenge ya koyeisa yango esengo mingi

Lolenge nini kolónga na libala na yo?

Toli nini ebongi kolanda mpo na kozala na esengo kati na libala?

Lolenge nini kosilisa mikakatano ya kozanga kosolola?

KOPUSAMÁKÁ na makanisi ya mikanda oyo bazalaki kotanga na ntina na kosikwama ya mwasi, Yasuhiro na makango na ye, Kayoko, bakomaki kofanda esika moko, na likanisi ete bakokoka kokabwana ntango nyonso oyo bakolinga. Bobele nsima ntango Kayoko akómaki na zemi nde bayaki kobalana. Atako bongo, Yasuhiro azalaki ntango nyonso na ntembe na ntina na ebongiseli ya libota. Ntango mikakatano ya mbongo mpe kozanga boyokani ebimaki, babomaki libala kozanga nkáka.

Mwa ntango moke nsima ya koboma libala, bango nyonso mibale babandaki koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah, moto na moto na esika na ye kozanga ete mosusu ayeba. Mwa ntango moke na nsima, wana bayaki koyeba yango, bamonaki mbongwana oyo esalemaki na ntina na kosalela mitinda na Biblia kati na bomoi ya mokomoko na bango. Bazwaki ekateli ya kobalana lisusu. Sikawa, koyebáká likanisi ya Nzambe na ntina na libala, bandimi komipesa mingi mpo na kolónga mikakatano na bango.

Nini ezali sɛkɛlɛ ya bolóngi ya libala na bango ya mibale? Ezali botosi na bango epai na Mobandisi ya libala. (Genese 2:18-24) Litambwisi oyo epesami na Jéhovah Nzambe, mopesi aleki malamu ya toli na makambo na libala, ezali liziba mpo na kozala na libala ya esengo.

Sɛkɛlɛ ya libala ya esengo

Mikakatano ya libala mikoki kosila mpe libala likoki kobikisama ntango babalani bazali kosalela oyo Yesu Klisto alobaki: “‘Okolinga Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo mobimba.’ Oyo ezali mobeko moleki monene mpe oyo na liboso. Mosusu na mibale ezali mpe lokola yango ete: ‘Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.’” (Matai 22:37-39) Yango nde sɛkɛlɛ ya libala ya esengo. Mobali mpe mwasi basengeli kolinga Jéhovah liboso ya komilinga bango moko to kolingana kati na bango. Boyokani wana ekoki kokokisama na nkamba na nsinga misato. “Ata moto akoki koleka ye oyo azali bobele ye moko, nde mibale bakotemela ye. Nkamba na nsinga misato ekokatama noki te.”​—Mosakoli 4:12.

Lokola kolinga Nzambe elimboli kokokisa malako na ye, mobali mpe mwasi basengeli kotya mibeko mpe mitinda na ye na esika ya liboso kati na bomoi na bango. Na kosaláká bongo, bakosala nkamba na nsinga misato oyo nsinga eleki makasi ekozala bolingo na bango mpo na Jéhovah. Mpe 1 Yoane 5:3 elobi ete: “Malako na ye mpe mazali na bozito te.”

Yango ezali kopesa nzela na kotalela libala lokola ebongiseli oyo esengeli koumela. (Malaki 2:16) Babalani oyo libala na bango ezali na moboko motindo wana bakosala makasi na kosilisa mikakatano ya libala na bango na esika ya koluka koboma libala lokola nde yango ezalaki nzela esengeli.

Monisa bolingo epai na moninga na yo ya motema

Mpo na kosala ete bikanganeli ya libala biumela, esengeli kokólisa bolingo mingi mpo na mobalani na yo, moninga na yo ya motema. Bolingo oyo ezali na moimi te. Totala lolenge oyo Biblia ezali kolendisa likambo wana: “Bozalana na bolingo moko, bosangana na motema moko mpe na lobanzo moko. Bosala likambo moko mpo na [kowelana] soko mpo na enzombo te kasi, awa ezali bino na kosokema, botanga basusu ete baleki bino. Moto na moto atala bobele makambo na ye moko te, kasi makambo na basusu lokola.”​—Bafilipi 2:2-4.

Tosengeli koyeba ete ezali petee te mpo na kosala likambo moko kozanga kowelana soko mpe na enzombo te kati na mokili oyo ya moimi. Ntango mobalani azali komonisela mwasi na ye bolingo te, ekozala mpasi ete mwasi yango akoka kosala makambo na kozanga moimi; kasi, na komonisáká kosokema, kotaleláká mobalani na ye ete aleki ye, akozala na mpasi te mpo na komibanzabanza na makambo ya mobalani na ye. Biblia ezali kosenga na biso ete tozala na ezaleli oyo ezalaki na Klisto Yesu. Atako azalaki ekelamu na elimo na nguya, kasi “akamataki motindo na moombo,” abotamaki na lolenge ya bato. Longola likambo wana, ntango azalaki na mabelé, “amisokisaki mpe atosaki kino kufa,” kufa oyo ezalaki na litomba ata na bato oyo bayambaki ye te. (Bafilipi 2:5-8) Na ezaleli motindo wana, Yesu azwaki mitema ya bato mingi oyo bazalaki batemeli na ye, mpe na komekoláká Yesu, ezali yango nde bayekoli na ye bazali kosala. (Misala 6:7; 9:1, 2, 17, 18) Likambo yango mpe ekoki kosalema mpo na yo. Na kotaleláká mobalani na yo ete aleki yo mpe kotyaka likebi na makambo ya mobalani na yo, okoki mpe kozwa mokemoke motema na ye.

Nzokande, kotalela mobalani na yo lokola ete aleki yo, elingi koloba te mpo na mwasi ete andima monyokoli ya mobali, lokola yango ezali kosalema na Azia. Mobali mpe mwasi basengeli kotalela mosusu ete aleki ye na kondimáká komipesa mingi mpo na ye. Ntango babalani bazali kolobela mikakatano na bango na elimo ya kosokema, oyo ezali komonisa komibanzabanza kati na bango, mpe na kolanda batoli ya Nzambe, bazali na makoki nyonso ya kosilisa mikakatano na bango. Totalela sikawa mwa mosusu kati na batoli yango euti na Nzambe.

Tika ete ‘mbeto na libala ezala na mbindo te’

Jéhovah, Mobandisi ya libala, amonisi polele boyokani oyo esengeli kozala kati na mobali mpe mwasi. Ntango batunaki ye soki esengeli na mobali kolongola mwasi mpo na ntina nyonso, Yesu Klisto alobaki ete: “Oyo nde Nzambe asili kokangisa, tika te ete moto akangola yango.” Amonisaki ete ezalaki bobele na ntina moko oyo endimami mpo na koboma libala mpe kobala lisusu, na maloba oyo: “Nazali koloba na bino ete ye nani akolongola mwasi na ye, soko mpo na pite te, mpe akobala [mwasi] mosusu, azali kosala ekobo.”​—Matai 19:3-9.

Atako nini bakoki koloba, kosangisa nzoto na libandá ya libala ezali bolingo soko moke te ezala mpo na mwasi to mpo na mobali. Mobali moko ya Japon azalaki na bamakango mingi. Mwasi na ye akómaki motema likoló mpo na likambo yango mpe azalaki komituna mituna mingi. Libala na bango ezalaki kokende na likámá. Na nsima, mokolo moko, makango moko ya mobali wana alobaki na mobali yango likanisi na ye ya kokende koyebisa makambo nyonso na mwasi na ye mpe asengaki ye ete abala ye. Mobali wana andimi lelo oyo ete: “Kati na boyokani motindo wana moto moko azali te oyo azali na esengo.” Mpo na kokima ezalela wana ya mpasi, asengelaki koyokisa mpasi na bato nyonso batalelamaki na likambo yango. Lilako ya Biblia mpo na likambo yango ezali polele: “Tika ete libala likumisama na bato nyonso mpe [mbeto ya libala ezala na mbindo te]. Mpo ete Nzambe akosambisa bato na pite mpe na ekobo.” (Baebele 13:4) Moto oyo azali kotosa lilako wana azali komibatela na likámá ya kozwa bamaladi oyo epesamaka na kosangisa nzoto, na matáta kati na libota mpe na konyokwama kati na makanisi oyo euti na kosangisa nzoto na kobombama.

Mibali, bolinga mpe bosepela na basi na bino

Nzambe asili mpe kotya ebongiseli ya bokonzi kati na libota. “Bino basi botosaka mibali na bino lokola epai na Nkolo, mpo ete mobali azali motó na mwasi lokola Klisto azali motó na lisangá,” ndenge elobami na Baefese 5:22, 23. Kosalela etinda oyo ezali likambo ya petee te. Shoko, oyo azalaki kowela bokonzi ya mobali na ye mpo na kozwa bikateli ya nsuka, andimi ete: “Natungisamaki mingi.” Lokola akanisaki ete mobali asengeli kozala na ndako na ye moko liboso ya kokóma na mibu 30, asengisaki mobali na ye na kosomba ndako oyo ye moko amonaki. Nzokande, nsima na koyeba malako na Biblia matali ezalela na ye, abandaki kotalela mobali na ye lolenge mosusu. Oyo ye azalaki kotalela ete bolembu mpe bizaleli ya mobali te, ntango atalaki yango malamu, ezalaki nde bososoli, komikitisa mpe bopolo.

Lilako wana etali bokonzi ezali kosenga na mibali bayeba ete bango mpe batyami na nse na bokonzi ya Yesu Klisto. (1 Bakolinti 11:3) Etelemelo wana ezali kosenga bango ete balinga mpe basepela na basi na bango motindo moko Yesu azali kolinga bayekoli na ye. (Baefese 5:28-30) Na yango, mobali moklisto akotya likebi na mayoki, na bamposa mpe na bolembu ya mwasi na ye ntango akozwa bikateli.

“Na elengi na mongwa”

Hisako azalaki na mikakatano mpo na kosolola elongo na mobali na ye. Ntango azalaki komeka koloba na ye, mobali na ye azalaki koboya kosolola, na kolobáká ete: “Sala oyo olingi.” Hisako azali komikundola ete: “Nakanisi ete kozanga bopolo oyo nazalaki komonisa nde ebimisaki mokakatano wana. Elingaki kozala malamu soki nazalaki koloba na malembe nyonso.” Lelo oyo, ye mpe mobali na ye bakoki kolobana makambo kozanga nkáka. Mbongwana wana esalemaki mpo ete Hisako asalelaki toli oyo elandi: “Tika ete maloba na bino mazala na [boboto], na elengi na mongwa ntango nyonso ete boyeba soko ekoki na bino kozongisela bato nyonso maloba nini.” (Bakolose 4:6) Lokola biloko oyo bityami mongwa bizalaka na elengi na monoko, bobele bongo maloba malobami na boboto nyonso mandimamaka kozanga nkáka. (Masese 15:1) Ya solo, bobele na kotyáká likebi na lolenge oyo ozali koloba, koswana kati na libala ekoki kopengolama.

Ee, kolinga Jéhovah Nzambe mpe kotosa mitinda na ye ezali kopesa matomba malamu. Ye oyo alingi Jéhovah azali komiyoka ete apusami na kotalela libala lokola ekanganeli ya libela mpe azali na ekateli makasi ya kobatela yango. Nzambe asili kopesa litambwisi ya ntina oyo ekosalisa yo na kolónga matáta nyonso kati na libala mpe kosilisa mikakatano na yo, atako yango ekoki komonana ete ezali monene mingi. Ya solo, koboma libala ezalaka ntango nyonso te nzela oyo ezali kopesa bomoi ya esengo, kasi kosalela malako ya Biblia nde ezali kopesa bomoi ya esengo. Okoki komona nzela yango na kozaláká na bolingo mpo na Jéhovah. Mpo na nini te koyekola makambo mingi na ntina na batoli na ye oyo ezali kati na Biblia, motambwisi aleki malamu mpo na makambo ya libala?

[Etanda na lokasa 18]

Wana moto asengeli kopona soki akoboma libala to soki akoboma yango te

ATAKO Biblia ezali kopesa nzela na koboma libala mpe kobala lisusu soki pite esalemi, ekobo etyaka mbala moko nsuka te na boyokani kati na mobali mpe mwasi. Mobalani oyo asali likambo te akoki kopona soki okoboma libala to akoboma yango te.​—Matai 19:9.

Yasuko akutanaki na mokakatano wana. Mobali na ye akómaki kofanda na mwasi mosusu. Mama ya mobali na ye apamelaki Yasuko mpe alobaki ete: “Ezali mpenza mpo na mabe na yo nde mwana na ngai azali komitambwisa motindo wana.” Yasuko azalaki kotungisama mokolo na mokolo. Bato mingi bapesaki ye toli, kasi moko te akweisaki mabe ya mobali na ye ndenge azwaki mwasi mosusu. Na nsima, mama na ye moko, oyo asilaki kobanda koyekola Biblia, alobaki na ye ete: “Kati na Biblia, elobami polele ete kosala ekobo ezali mabe.” (1 Bakolinti 6:9) Yasuko abondisamaki mingi na koyeba ete kati na mokili ya lelo ezali naino na malako na ntina na malamu mpe mabe.

Sikawa Yasuko asengelaki kopona. Atako akanisaki koboma libala, ayaki komona nsima na koyekola Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah ete ye mpe azalaki na mbeba na ngámbo na ye. Na bongo azwaki ekateli ya kotalela malako ya Biblia mpo na kosilisa mikakatano na ye. Abandaki kosalela yango. (Baefese 5:21-23) Amikundoli ete: “Ezalaki likambo ya petee te. Nakweaki mbala na mbala. Nabondelaki Jéhovah mbala mingi na kolela.” Lokola azalaki kobongwana, mobali na ye mpe abandaki kobongwana mokemoke. Soko mibu mitano na nsima, mobali na ye akataki boyokani nyonso elongo na makango na ye. Yasuko azwi liteya oyo ete: “Nandimisami mpenza ete kotosa Liloba ya Nzambe ezali na ntina mingi.”

[Etanda na lokasa 20]

Kozanga boyokani na makambo matali kosangisa nzoto mpe koboma libala

BABALANI mingi bazali kotanga kozanga boyokani na makambo matali kosangisa nzoto lokola ntina ya koboma libala. Kolobeláká mpenza ntina ya likambo yango, mokanda Kosangisa nzoto mpe libota (na lokóta Japonais) oyo ezali kolobela mbongwana oyo ezali kosalema sikawa kati na libota, elobi ete: “Na mikolo na biso, libala kati na mobali moko mpe mwasi moko mpe bapiblisité na ntina na kosangisa nzoto ezali koyokana te. Makambo mingi oyo mazali kolobelama na ntina na kosangisa nzoto mazali komonisa na lolenge mabe kosangisa nzoto kati na libala mpe ezali kobebisa mpenza bolingo [kati na mwasi mpe mobali]. Ezali te bobele bondumba nde ezali kobebisa mayoki mpe motema, kasi lisusu ba vidéocassettes mpe ba bandes dessinées oyo ezali kolakisa bolumbu ya nzoto, oyo ezali kolakisa nzoto ya basi lokola biloko ya kotekisa. Mpo na yango, basi bakómi kobebisama na [mibali na bango] mpe mibali oyo basi bazali kosepela te kosangisa nzoto elongo na bango bazali kokoka lisusu kosangana na mwasi te.”

Mikanda ya mbindo, ba vidéos, mpe ba programmes ya televizyó ezali komonisa na lolenge mabe bosangisi ya nzoto. Ezali te koteya nini ezali bisengo ya solo kati na libala. Ezali lisusu kobebisa kotyelana motema oyo mobali mpe mwasi basengeli kolóna mpo na kolónga kati na libala na bango. Zulunalo Psychology Today elobi ete: “Kotyelana motema ezali kopesa nzela na kotya mayoki na yo mpe bobangi na yo na maboko ya mobalani na yo, koyebáká ete akotya likebi na yango. Soki mayoki ya bolingo mpe bopusi ya kosangisa nzoto ekoki komata mpe kokita na bantango mosusu, nzokande kotyelana motema ekotikala ntango nyonso ngwi.”

Kosangisa nzoto ezali te likambo lileki ntina mpo na kolónga kati na libala. Mwasi moko oyo akutanaki na mikakatano kati na libala alobi ete: “Oyo elendisaki ngai mingi ezali maloba mazali kati na mokanda Ndenge nini okoki kozala na bomoi na libota ya esengo: ‘Na lolenge eyebani, elobamaka ete soki na makambo nyonso mosusu ya libala, soki bolingo, limemya, kosolola malamu mpe komitya na esika ya mosusu ezali, makambo matali kosangisa nzoto makobimisela bango mikakatano te.’”a

Ezali bolingo nde ezali kopesa nzela na boyokani ya penepene kati na babalani, kasi kosangisa nzoto te. Kosangisa nzoto kozanga bolingo ezali na ntina te, nzokande bolingo yango moko ekoki. Na kotyáká bosangisi nzoto na esika na yango, na kozanga kokómisa yango likambo lileki ntina kati na bomoi na bango, babalani bakoki kosepela na boyokani na bango ya libala mpe kosilisa mikakatano na makambo matali kosangisa nzoto.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Elilingi na lokasa 19]

Kotosa malako ya Biblia ekosalisa babalani na kosolola polelepolele

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto