Lolenge ya kosalisa bato ete báyeba kotánga
BAMILIÓ wana ya bato oyo bayebi kotánga te mpe kokoma te bazali banani? Mingi kati na bango bazali bato mpenza mpe basáli. Kati na mikili ya bobólá, mosala ya bato yango nde mozali kobimisa bilei, bilamba mpe bisika ya kofanda mpo na ebele ya bato. Kati na mikili ya bozwi, bazali kondima kosala misala oyo bato mosusu bakolinga kosala yango te—misala oyo mizali sé ndenge moko mikolo nyonso, mpe oyo mibéngami ete ya mongamba, nzokande misala yango mizali na ntina mingi mpo na bato nyonso.
Mbala mingi, kozanga libaku ya kokɔta na eteyelo ezali ntina oyo esali ete bato mosusu bázanga koyeba kotánga mpe kokoma. Baínga nyonso bazali bazoba te, soki mpe bato bayebi eloko moko te to mosala moko te. Moko kati na bango oyo abandaki koyekola, alobaki ete: “Nazali elema te, mokakatano na ngai mozali bobele kotánga.”
Bazwaki libaku te
Mpo na bato mingi, boínga ekangami na bobólá. Kati na libota, bobólá ezali kosɛnga ete bato bamibanzabanza mingi na koluka biloko ya kolya na esika ya koluka koteyama. Wana mposa emonani ete bana bátikala na ndako mpo na kosala mosala, bakokende na eteyelo te. Mpo na baoyo kati na bango bazali kokende na eteyelo, mingi bazali koumela kuna te.
Ntina mosusu ya boínga ezali mpo na bobólá ya ekólo. Mikili ya bobólá oyo mitondi na nyongo, misɛngisami kokitisa mosolo mosalelamaka mpo na makambo ya koteya. Na ndakisa, na Afrika, mosolo nyonso mosalelamaka na makambo ya koteya mokitisami na 30 % na boumeli ya katikati ya bambula 1980. Wana mikili ya bozwi mizali kopesa koleka badolare 6 000 mbula na mbula mpo na banakelasi na bango, mikili ya bobólá na Afrika mpe na Azia ya Súdi mizali kopesa bobele badolare 2. Lokola litomba: motuya ya biteyelo mpe ya balakisi ezali moke soki tokokisi yango na motuya ya banakelasi.
Bitumba mpe matáta kati na bikólo ezali mpe kokɔtisa boínga. UNICEF emonisi ete bamilió nsambo ya bana bazali kati na Káa ya bato oyo bakimá mboka na bango, epai kuna biteyelo ya solosolo bizali te. Bobele kati na mokili moko ya Afrika, bana 1 200 000 oyo bakokisi naino te mibu 15 bazali na likoki te ya kokende na eteyelo na ntina na bitumba ya banamboka.
Baoyo bazwaki likoki te ya koyekola na bomwana na bango, bakoki mbala mosusu kozwa libaku ya kotánga mpe kokoma na nsima kati na bomoi na bango, kasi basusu basepelaka na milende oyo misalemaka mpo na yango te. Mpo na baínga oyo bazali kofanda na mboka mike, búku Adult Education for Developing Countries (Koteyama ya mikóló na mikili ya bobólá) elobi ete: “Longola bobele soki makambo mosusu masɛngisami, ezali mpasi ete mokóló oyo azwaki mosala kozanga koyeba kotánga mpe kokoma andima koyekola kotánga mpe kokoma. . . . Kozanga koloba ete azali mpenza kosepela na ezaleli na ye, akoki to akoki te komilela na ntina na ezalela na ye na boye ete aluka kobongola yango.”
Nzokande, mingi bazali na mposa makasi ya koyeba kotánga bango moko. Bantina ezali mingi mpo na yango. Bamoko balingi kozala na lokumu ya moto ayekoli. Basusu bapusami na makambo matali mosolo. Baoyo bazangi misala bazali kokanisa ete kolongwa na boínga ekokaki kosalisa bango ete bázwa mosala; baoyo bazali na mosala bazali koluka bisika ya kosala ya malamu.
Koyebáká boyokani oyo bozali kati na koyeba mokanda mpe bokóli ezala ya moto ye moko to ya ekólo mobimba, biyangeli mingi mpe masangá esili kokamata bibongiseli mpo na kolakisa kotánga mpe kokoma epai na mikóló. Ezali mosala moko ya makasi, mpamba te ezali kosɛnga epai na balakisi komitya na esika ya mikóló oyo bazali koyekola kotánga mpe bátalela makambo na bango mpenza.
Ezaleli ya mokóló oyo azali koyekola
Baoyo bazali koteya mikóló, basengeli koyeba bokeseni kati na mikóló oyo bazali koyekola mpe bana oyo bazali koyekola. Epai na mikóló, bomoto, mimeseno, bizaleli, mpe mikano ezali makasi koleka epai na bana, yango ezali kosala ete mikóló bazali na mpasi mpe bazali kokakatana mpo na kobongwana. Epai mosusu, mikóló bameseni mingi na makambo oyo likoló na yango likoki ezali ya kotónga mpe bazali na likoki ya kokanga makambo mpe makanisi oyo bana bakozala na mpasi mpo na kokanga yango. Na momeseno, bazalaka na ntango mingi te lokola bana. Bokeseni mosusu ya ntina ezali ete mikóló oyo bazali koyekola, na kokesena na bana, bazali na bonsomi ya kokata boyekoli na bango na ntango oyo balingi.
Mikóló mingi oyo bazali baínga bazali na mayele na makambo ndenge na ndenge mpe basili kolónga kati na makambo mosusu ya bomoi; eloko ezangi bango bobele libaku ya koyekola kotánga mpe kokoma. Molakisi asengeli kolendisa bango ete básalela makoki, mayele mpe milende oyo bamonisaki na makambo mosusu ya bomoi.
Esɛngi mpiko epai na moínga mpo na kondima bamposa na ye mpe kosɛnga lisalisi. Atako mabaku mpe bato bakeseni, ebele na mikóló bazali kobanda koyekola mokanda na bobangi mpe na kozanga komityela motema. Bamoko bazali kokanisa eleko bamekaki koyekola na eteyelo kasi bakokaki te. Basusu bazali komimona ete bakómi mikóló mpenza na boye ete bakokaki lisusu koyekola makambo ya sika te. Lisese moko ya mboka Nigéria elobi ete: “Ezali mpasi koyeba kosalela lobɔkɔ ya mwasi wana okómi mobangé.”
Balakisi bakoki kolendisa mpe kobatela mposa ya boyekoli soki bayebi komona bokóli mpe milende ya bayekoli mpe kopesa bango longonya. Mateya masengeli kobongisama na motindo boye ete ata moyekoli alóngi te na likambo moko, emonana te lokola likambo monene kasi nde elendisa ye ete akóba mokemoke na maye mazali liboso. Búku Educating the Adult (Koteyama ya mikóló) elobi ete: “Kolónga ezali mbala mosusu likambo lileki ntina mpo na kobatela bosepeli.”
Mbala mingi, mikóló basili kotya na motó na bango eloko nini balingi koyekola mpe balingi kokóla nokinoki mpo na kokóma na mikano na bango. Molakisi moko ya mikóló na Afrika alobaki ete: “Balingi kobanda kozwa mateya, koyekola nokinoki maye bazali na yango mposa, mpe na nsima kobima.”
Mbala mosusu moyekoli moko akoki komityela mikano mileki makoki na ye. Longwa na ebandeli, molakisi asengeli kosalisa moyekoli ete amityela mikano mokemoke mpe koluka kokokisa yango. Na ndakisa, tólobela moklisto moko oyo azali koyekola kotánga mpe kokoma, mpo ete alingi kokoka mokolo mosusu kotánga Biblia mpe mikanda mikolimbolaka Biblia. Yango ezali mokano ya ntango molai. Mpo na kosalisa ye ete akokisa yango, molakisi akoki kolendisa moyekoli na komityela mikano mokemoke, lokola koyeba likomi mokomoko to alphabet, komona mpe kotánga mikapo miponami, mpe kotánga mikanda mikolimbolaka Biblia oyo mizali na maloba ya pɛtɛɛ. Likambo ya kokokisa mbala na mbala mikano oyo amityelaki ezali kolendisa mpe kopusa moyekoli ete alanda koyekola.
Balakisi ya malamu bakoki kosala mingi mpo na kokólisa mposa ya bayekoli na bango na kolendisáká bango mpe na kosalisáká bango na kokokisa mikano misengeli mpe mibongi. Nzokande, mpo na kokóla, mikóló basengeli te kozela ete molakisi asala lokola nde azali kotafuna nyonso mpo na bango. Basengeli kondima komema mikumba na bango mpo na oyo etali koteyama na bango moko mpe kosala makasi na koyekola. Soki bakosala bongo, bakokoka koyekola kotánga mpe kokoma, mpe milende yango mikobongola solo bomoi na bango.
[Etanda na lokasa 6]
Batoli mpo na kolakisa mikóló ete báyeba kotánga mpe kokoma
1. Ezali likambo ya ntina na kolamwisa mposa epai na moyekoli. Uta na mateya ya ebandeli, lobelá matomba ya koyeba kotánga mpe kokoma, mpe lendisá moyekoli na komityela mikano mibongi oyo akoki kokokisa yango nsima na mwa ntango mokuse mpe mosusu nsima ya ntango molai.
2. Mpo na kokóla, moyekoli asengeli kolakisama mbala mingi na boumeli ya poso. Kotánga mbala moko na poso ekoki te. Moyekoli asengeli mpe kosalaka na ndako mikumba oyo mizali kopesama na kelasi.
3. Koluka te ete moyekoli akóla mbángumbángu mpe kolakisa makambo ebele te na mbala moko. Yango ekoki kolembisa ye mpe kosala ete akima kelasi.
4. Zalá ntango nyonso na maloba ya kolendisa mpe kotya elikya. Kotánga mpe kokoma eyekolamaka mokemoke. Moyekoli asengeli kosepela na komona ete azali kokóla.
5. Lendisá moyekoli ete asalelaka nokinoki kati na bomoi na ye ya mokolo na mokolo makambo oyo azali koyekola.
6. Kolekisa ngonga mpambampamba te likoló na makambo oyo mazali na ntina moke. Mikóló bazali na makambo mingi ya kosala. Yango wana, pesá ntango mingi na kolakisa makambo oyo mazali solo na ntina.
7. Monisá limemya epai na moyekoli, pesá ye lokumu oyo abongi na yango. Koyokisa ye nsoni te mpe kokitisa ye soko moke te.
8. Zalá pene na kososola mikakatano ya moto na moto. Moyekoli boye akoki kozala na mpasi mpo na kotánga makomi mike mpamba te azangi matalatálá. Mosusu akozala na mpasi mpo na kokanga ebéngeli ya maloba mpamba te ayokaka malamu te.
9. Eleki malamu ete moyekoli ayekola kokoma lɛtɛ́lɛ mokomoko liboso ya kolakisa ye kokangisa yango na makomi mosusu. Ezali pɛtɛɛ na koyekola lɛtɛ́lɛ mokomoko mpe kokoma yango, mpe ekokani mingi na oyo enyatámi na mikanda.
10. Mwango malamu ya koteya lolenge ya kokoma balɛtɛ́lɛ ezali ya kolakisa moyekoli kokoma yango mbala mingi likoló na lokasa ya pɛtɛɛ mpe ya polele oyo etyami likoló na lokasa mosusu oyo ezali na balɛtɛ́lɛ yango, mpe na nsima kokoma yango kozanga lokasa wana ya bomekoli.
11. Mbala mingi moto akoyebaka kotánga noki, kasi kokoma ekoyaka nsima. Landá kokende liboso na kotánga ata soki moyekoli azali naino kosala malamu te mikumba na ye mpo na oyo etali kokoma. Nzokande, omikundola ete, soki moyekoli azali komeka kokoma balɛtɛ́lɛ ya sika, akozala na mpasi te mpo na koyekola mpe kosimba yango.
12. Atako moyekoli oyo azali mokóló ayebi kosala misala mingi ya mabɔkɔ, nzokande ekoki kozala ete azali kokoka te kosimba bíki to kiliyó mpo na kokoma na yango mpe likambo yango lizali kolembisa ye. Na yango, koluka te ete balɛtɛ́lɛ nyonso ekomama malamumalamu.