Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g94 Avril nk. 20-22
  • Ndenge nini nakoki kokɔnda?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge nini nakoki kokɔnda?
  • Lamuká!—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolya mingi mpe kozanga kokembisa nzoto
  • Kolya malamu te: motámbo
  • Lolenge ya kokɔnda kozanga likámá
  • Mbongwana ya lolenge ya kolya mpe ya lolenge ya bomoi
  • Ndenge nini nakoki kokitisa kilo na ngai?
    Mituna oyo bilenge batunaka
  • Nakosala nini soki nazosepela na nzoto na ngai te?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nasala nini mpo nalyaka na ndenge ebongi?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Lamuká!—1994
g94 Avril nk. 20-22

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Ndenge nini nakoki kokɔnda?

ELENGE moko na nkombo Julien amilelaki: “Kozala monene ezali moko ya makambo ya mabe koleka oyo ekoki kokóma na bolenge ya mwana mobali.” Soki ozali monene mingi, na ntembe te ozali koyeba lolenge nini ye azali koyoka.

Nzokande, kozala na mafuta mingi na nzoto, ezali bobele te kobebisa lolenge ya nzoto na yo, kasi ekoki mpe kosala yo mabe koleka. Na yango, kozala monene mingi ekoki kobenda makámá mingi na kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto: mpasi na motongá, mokakatano ya kopema mpe bokɔnɔ babengi maladi ya sukali. Lisusu, ozali na likámá ya kobela makɔnɔ oyo makobomaka, lokola motema mpe kanser.a

Kasi, ezali te ete soki ozali mwa monene osengeli nde koluka kokɔnda. Bamoko basangoli nzoto monene, ata na kilo na bango mpo na makambo matali monganga, bakomona ete baleki monene.b Kasi soki monganga na yo amonisi ete ozali na mafuta mingi, makambo mosusu mpe makoki kotalelama. Na búku The Healthy Adolescent (Elenge ya nzoto kolɔngɔ́nɔ́) tozali kotánga boye: “Epai ya bato mosusu, bakokanisi . . . kozala monene mingi mpe kotambola mabe ya mbuma izali na nzoto lokola yéka (pancréas), tyroïde mpe surrénales.”

Kolya mingi mpe kozanga kokembisa nzoto

Mingimingi, kozala monene koleka euti na bizaleli mabe ya kolya mpe kozanga kokembisa nzoto. Elenge mobali Julien alobi: “lokola mama na ngai asengelaki kosala mosala mpo na kobɔkɔlɔ biso, ngai na ndeko na ngai ya mobali . . . nde tozalaki na mokumba ya komileisa biso moko. Tobandaki kolya biloko ya elɛngi, na mwa masanga ya sukali babengi [soda].” Ozali komimona ete osalaka bongo?

Nzokande, mpo na bilenge basusu, kolya ezali mpo na nzala te, kasi nde mpo na komipesa mwa nguya na nzoto. Bilenge motindo yango balyaka mingi mpo na kosilisa mikakatano lokola kobomama ya libala ya baboti na bango, liwa ya molingami moko to mikakatano mosusu.

Likámá ya kolya mingi ebakisamaka mingimingi na kozanga kokembisa nzoto. Búku A Parent’s Guide to Eating Disorders and Obesity (Litambwisi ya baboti likoló na mobulungano ya kolya mpe na nzoto monene mingi) emonisi: “Televizyó ezali bobele te kopekisa kokembisa nzoto, kasi bilakiseli mpe bizali kolendisa batáli ete bálya mingi mpe mingi koleka.”

Kolya malamu te: motámbo

Engebene eutelo mosusu, moto moko ya mboka Etats-Unis kati na banei azali na lolenge moko to mosusu ya kolya mpo na kokɔnda. Nzokande, koleka ntuku libwa kati na monkámá oyo bazali kokɔnda na lolenge wana, bazali kozonga lisusu minene. Likambo nini ezali mabe?

Nzoto ezali lokola fúlu oyo bɔɔngɔ́ na yango ezali lokola thermostat (masini oyo ekosalisaka mpo na kobatela molunge to mpe mpiɔ ete ezala na bokatikati esika oyo ekangami). Ntango ozali kolya, métabolisme (kobongolama ya bilei kati na nzoto) na yo ezali kotumba bilei mpe ezali kobimisa nguya. Soki bamposa ya nguya ya nzoto etondi, mintika mityamaka esika moko na lolenge ya mafuta. Soki otiki kolya biloko mosusu mpo ete okɔnda, okokɔnda solo na ebandeli. Nzokande, nzoto na yo ekosala nokinoki mpe ekokitisa thermostat na yo na kolɛmbisaka kobongolama ya bilei kati na nzoto na yo. Ata mpo na kolya na yo moke, okozongela lisusu monene mpo ete ndambo monene ya bilei ozali kolya ezali kobombama lisusu na lolenge ya mafuta. Okozongela monene na yo ya liboso, ekomata lisusu na mwa bakilo. Na mawa nyonso, obandi lisusu kolya moke mpo ete okɔnda. Nzokande, wana ntango nyonso ozali kokɔnda mingi, okoya lisusu monene mingi.

Tozali kokanga ntina mpo na nini savants régimes (bankisi ya kokɔndisa) ezali makasi te. Nkisi ya kokɔndisa ekoki kolɛmbisa mposa ya kolya na boumeli ya mwa ntango, kasi nzoto ekomimesenisa na yango nokinoki, mpe na nsima mposa ya kolya ekozonga, longola soki kobongolama ya bilei kati na nzoto elɛmbisi, oyo ekomonanaka na kozongelama ya monene. Longola mikakatano mosusu oyo mikoki komonana, lokola kizunguzúngu, hypertension, mpe bobángi ya kozwama kati na boombo na yango. Ezali ndenge moko mpo na bankisi oyo ekolongolaka mai to oyo ematisaka kobongolama ya bilei kati na nzoto. Monganga Laurence Lamb alobi polele boye: “Nkisi ya kokɔndisa malamu mpe ezangi likámá ezali te.”

Nzoto ya elenge mobali to elenge mwasi ezali na mposa ya nguya mpe bilei oyo bikoki koleisa misuni ya nzoto. Koboya kolya biloko mosusu ekoki kolɛmbisa bokóli na yo. Talá oyo Biblia elobi mpo na Mokonzi Saulo na 1 Samwele 28:20: “Nguya ejalaki lisusu na ye tɛ mpɔ ete alei kwanga na mokɔlɔ mobimba mpe na butu yango tɛ.” Ezali mpe ndenge yango, engebene monganga moko, bilenge oyo bazali koboya kolya biloko mosusu bakoki kokutana na mikakatano lokola “kolɛmba, . . . mawa, koyoka mpiɔ, kokita ya bilembo ya kelasi, kozanga zongo, nkanda, kokangama to kozanga komona sanza epai na basi, kokwea na mpɔngi makasi.”

Lolenge ya kokɔnda kozanga likámá

Mpo na kokɔnda na lolenge ya kozanga likámá, osengeli naino liboso kosolola na monganga na yo mpo na koyeba kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto na yo ndenge ezali. Na yango akoyeba soki ozali na mwa mobulungano moko te kati na nzoto, oyo ekoki kozala na litomba te mpo na mbongwana moke ya lolenge na yo ya kolya. Akosalisa yo lisusu na komityela mikano mpe bilaká bilongobani.

Biblia elobi ete: “Likambo lileki malamu ejali mpɔ na moto tɛ, bobɛlɛ ete alia mpe amɛla mpe ajua esɛngɔ kati na mosala na ye.” (Mosakoli 2:24) Na yango, lolenge na yo ya kolya oyo ezali kopimela yo esengo ya kolya ekoki na nsima komemela yo likámá. Lisusu, Biblia ezali nde kopekisa kolya mingi koleka. (Masese 23:20, 21) Talá mwa makanisi oyo makoki kosunga yo na ‘kobongisa mimeseno na yo’ ya kolya.​—1 Timoté 3:11.

Kolekisa bolei ya ntɔ́ngɔ́ te. Búku The New Teenage Body Book (Nzoto ya sika ya elenge) elobi: “Nzala mpe mayoki ya kopimelama eyaka makasi. Ata nsima, na boumeli ya mokolo okozala na bopusi ya kolya mingi​—mpe bongo mpo na kozwa nguya mingi.”

Melá mai mingi liboso ya kolya. Yango ekotondisa likúndu na yo. Komela mai mingi ekoki mpe kosalisa yo mpo na kokitisa bosalemi ya mafuta kati na nzoto. Minganga bazali koloba ete ezali malamu komela kɔ́pɔ 8 ya mai na mokolo.

Tiká kotala televizyó ntango ozali kolya. Monganga Seymour Isenberg alobi: soki ozindi na kotala televizyó. . ., okobanda kolya lokola masíni.

Bondelá liboso ya kolya. Omikundola ete: “Nzambe akelaki bilei mpo ete bílyama na botɔ́ndi, na baoyo bazali na kondima mpe bayebi mpenza solo.” (1 Timoté 4:3 NW) Na kozaláká na lisosoli ya boyokani elongo na mozalisi, elenge mwasi to elenge mobali oyo azali kobanga Nzambe akolinga te kolya mingi mpo ete ákweaka na mpɔngi makasi oyo ekoki kolɛmbisa nzoto. Libondeli ekoki kolendisa yo mpo na mokano ya kolya na ndenge elongobani.

Lyá malɛmbɛmalɛmbɛ. Esengeli soko miniti 20 mpo ete likúndu eyebisa na bɔɔngɔ́ ete etondi. Na bongo, soki okolya malɛmbɛmalɛmbɛ ekosalisa yo ete olya mpe otonda, kasi koleka mingi te.​—Levitike 25:19.

Zwá matomba malamu na kolya, mingimingi soko ozali na momeseno ya kolya ntango nyonso olɛmbi to ozali yo moko, to ozali na mawa. Yebisá yango na moto moko oyo olingaka, kendá kotambola, kembisá nzoto mwa moke, lekisá ntango, bɛtá miziki. Oyo eleki malamu lisusu, meká kokokisa mposa ya elimo. (1 Petelo 2:2) Nzokande, bilei bilendisaka kondima te. (Talá mpe Baebele 13:9.) Kotánga Biblia, yango ekoki kosunga yo. Mpe mbala mosusu ekosalisa yo na kokanisa makambo mosusu na esika ya mposa na yo ya kolya.

Mbongwana ya lolenge ya kolya mpe ya lolenge ya bomoi

Mbongwana mpe ekoki kosalema mpo na biloko omesanaki kolya. Mobeko ya Mose ezalaki kopekisa kolya mafuta ya nyama (Levitike 3:16, 17) Atako yango ezalaki mpo na makambo ya losambo, kasi mpo na oyo etali bilei, ezali malamu te kolya bilei oyo bizali na mafuta mingi, na ndakisa, boudin, fromage, saucisson, jambon bongo na bongo mpe pomme de terre, makemba, mbala oyo bakalingi na mafuta. Lisusu, masanga ya sukali mpe biloko ya sukali oyo epesaka mpenza bilei na nzoto te, epesaka nde nguya. Mpe soki mungwa ebongisi malamu misuni ya ngombe oyo ezangi mafuta, yango ekobatela mai kati na nzoto na yo.

Engebene likanisi ya bato oyo bapesaka malako mpo na makambo matali bilei, kosepela kolya ata mbala moko biloko oyo olingaka ezali mabe te. Kasi soki olingi mpenza ete okɔnda, osengeli kosepela kolya malamu koleka, na ndakisa bambuma, kokoti, ndika, masangu, loso, mpe ndunda. Mopesi-malako moko mpo na makambo matali bilei alobi boye: “Lyá bilei bikeseni mpo ete omiyoka nzoto bolɛmbu te.” Soko yo moto olambaka na ndako na bino te, sololá na mama na yo ete asunga yo. Ya solo, libota mobimba likozwa litomba soki mbongwana esalemi mpo na bilei ya mokolo na mokolo.

Mimeseno malamu ya kolya ezali na ntina mingi. Kasi mpo na kokɔnda, osengeli mpe komatisa “thermostat.” Ndenge nini? Na kokembisáká nzoto na lolenge malamu mpo na komatisa nguya ya mimpúlúlú mpe misisa, mpe yango mbala misato na pɔ́sɔ, na boumeli ya miniti 20. (1 Timoté 4:8) Kotambola to mpe komata na ebuteli ezali malamu. Kokembisa nzoto ekosunga yo na kobongisa nzoto na yo, ata monene ezali boni, ata nzoto na yo ezali ndenge nini. Na bongo, ezali komatisa kobongolama ya bilei kati na nzoto na yo, ekozikisa nguya mpe mafuta. Kokembisa nzoto ekoki kobongola “chimie” na yo ya nzoto mpe kokólisa misisa na yo. Nzokande, misisa na biso ezikisaka nguya ata soki tolali.

Na lisungi ya kolendendela mpe ya komityela mikano, okoki kolónga etumba mpo na monenec. Ya solo, mikakatano na yo nyonso mikosila te mpo ete okɔndi moke, kasi nde nzoto na yo ekozala kitoko, okomiyoka ete ozali malamu, mpe okozala na elilingi kitoko mpo na yo moko.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bilenge soko ntuku mwambe ya nzoto monene ya mabe kati na monkámá bakozala mpe mikóló ya nzoto monene ya mabe .

b Talá lisoló “Mituna oyo bilenge batunaka... Pourquoi suis-je si gros?” kati na Lamuká! ya Apríli 22, 1994 (na ebimeli ya Lifalansé).

c Baoyo bazali na mikakatano makasi mpo na makambo matali bilei, mbɛlɛ bakoki kosolola na monganga mpo na kolónga mpasi na bango.

[Elilingi na lokasa 21]

Mpo na kokɔnda kozanga mikakatano, kémbisá nzoto mpe lyá bilei bilongobani mpe ya malamu

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto