Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Janvier nk. 18-20
  • Lingomba ya Katolike kati na Afrika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lingomba ya Katolike kati na Afrika
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Bitumba kati na bikólo
  • Likambo litali kobika
  • Lingomba mpe “bonkɔ́kɔ”
  • Osengeli kosala nini?
Lamuká!—1995
g95 Janvier nk. 18-20

Lingomba ya Katolike kati na Afrika

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA ITALIE

LINGOMBA ya Katolike ezali na bamilió mingi ya bandimi na Afrika mpe lizali kokutana na mikakatano minene. Na ebandeli ya mobu mouti koleka, bakonzi ya lingomba koleka 300 bakutanaki na Vatican, na Rome mpo na kolobela bamoko ya mikakatano yango na liyangani ya bakonzi ya mangomba na boumeli ya sanza mobimba.

Engebene zulunalo L’Osservatore Romano, mpo na bofungoli ya likita pápa alobaki ete: “Lelo mpo na mbala ya liboso, liyangani ya baepiskɔ́pɔ lizali kosalema mpo na lingomba ya Afrika oyo etaleli eteni wana ya mokili. . . . Batindami nyonso ya Afrika bazali awa lelo kati na Basilique ya Saint-Pierre. Ezali na bolingo mozindo mpenza nde episkɔ́pɔ ya Loma ayambi Afrika.”

Bitumba kati na bikólo

Lokola mingi bayebi yango, mikakatano ya lingomba ya Katolike mizali mpenza minene kati na Burundi mpe na Rwanda, mikili ya Afrika oyo kati na yango bato mingi bazali bakatolike. Bitumba kati na bikólo ekómaki nsango ya mokili mobimba na ebandeli ya eleko ya molungé oyo euti koleka ntango bato mingi babomamaki na bazalani na bango. Moto moko oyo amonaki makambo yango na miso alobi ete: “Tomonaki basi batye bana na mikɔngɔ ndenge bazalaki koboma. Tomonaki mpe bana bazalaki koboma bana mosusu.”

Zulunalo National Catholic Reporter elobaki mpo na kobanga ya bakonzi ya lingomba ya Katolike. Eyebisamaki ete pápa “ayokaki ‘mpasi mingi na motema’ ntango ayokaki kongala ya matátá na [Burundi], mwa mokili moke ya Afrika epai kuna bato mingi bazali bakatolike.”

Kobomama na Rwanda ezalaki lisusu mabe monene mpo na bakonzi ya lingomba ya Katolike. Bobele zulunalo wana elobaki lisusu ete “Pápa alobelaki polele kobomama ya bikólo kati na mokili oyo bato 70 % bazali bakatolike.” Lisoló yango eyebisaki boye: “Pápa alobaki ete: bitumba kati na mboka wana ya Afrika ezali ‘kobomama monene ya bikólo oyo, na mawa nyonso, ata mpe bakatolike bazali babandisi na yango.’”

Lokola makambo ya nsɔ́mɔ oyo mazalaki na Rwanda masalemaki sé na ntango oyo liyangani ya baepiskɔ́pɔ ezalaki kosalema na Loma, likebi ya baepiskɔ́pɔ lityamaki mingi likoló na ezalela ya Rwanda. Zulunalo National Catholic Reporter emonisaki ete: “Matátá ya Rwanda mazali komonisa likambo moko ya mawa: kondima ya boklisto ezwaki misisa malamu te na Afrika mpo na kolónga kowelana na ntina na bikólo.”

Kolobeláká lobanzo ya baepiskɔ́pɔ oyo bayanganaki, zulunalo National Catholic Reporter elandaki koloba: “Motó ya likambo [kowelana na ntina na bikólo] elobelamaki liboso ya liyangani yango na Albert Kanene Obiefuna, episkɔ́pɔ ya engumba Awka, na Nigeria.” Na lisukúlu na ye, Obiefuna alimbolaki ete: “Bomoi ya libota mpe ya boklisto ya moto ya Afrika etambwisami engebene matomba ya ekólo na ye.”

Na nsima, kokanisáká kozanga ntembe na Rwanda, Obiefuna akóbaki lisoló na ye na maloba oyo: “Bato ya Afrika bapusami mpenza na ezaleli yango na boye ete bazalaka na momeseno ya koloba, ntango makambo makómaka ndóngó, ete ezali te likanisi ya boklisto ya kotalela lingomba lokola libota nde esengeli kozala na esika ya liboso, kasi balandaka nde lisese oyo ete: ‘Makila ezalaka kiló koleka mai.’ Ekoki kokanisama ete mai oyo malobelami awa masangisi mai ya batisimo oyo na yango moto abotamaka kati na libota ya lingomba. Bondeko ya makila ezali na motuya mingi koleka, ata mpo na moto ya Afrika oyo akómi moklisto.”

Na bongo, baepiskɔ́pɔ wana bandimaki ete kati na Afrika, lingomba ya Katolike elóngi te na kotya bondeko ya boklisto kati na yango bandimi basengeli kolingana moko na mosusu lokola Yesu Klisto ateyaki yango. (Yoane 13:35) Nzokande, “bondeko ya makila ezali na motuya mingi koleka” epai na bakatolike ya Afrika. Yango wana bazali kotya koyinana ya bikólo liboso ya makambo mosusu nyonso. Lokola pápa amonisaki yango, bakatolike ya Afrika bazali na ngambo na makambo wana ya nsɔ́mɔ oyo euti kosalema kala mingi te.

Likambo litali kobika

Baepiskɔ́pɔ ya Afrika bamonisaki kobanga bazali na yango mpo na kobika ya lingomba ya Katolike na Afrika. Bonifatius Hashiku, episkopo ya mboka Namibie alobaki: “Soki tolingi ete lingomba elanda kozala kati na mboka na ngai, tosengeli kotalela malamumalamu likambo litali bonkɔ́kɔ.”

Komonisáká mayoki lolenge moko, Adista, biro ya Katolike oyo ekobimisaka bazulunalo na Italie elobaki: “Kolobela ‘bonkɔ́kɔ’ ezali kolobela makambo masimbi mpenza bomoi ya lingomba ya katolike kati na mokili wana, elikya na yango ya kobika to ya kolimwa.”

Kasi baepiskɔ́pɔ balingi mpenza koloba nini na “bonkɔ́kɔ”?

Lingomba mpe “bonkɔ́kɔ”

John M. Waliggo amonisaki ete: “Komimesenisa ezali liloba oyo lisalelami uta kala mpo na kolimbola likambo bobele moko wana.” Na maloba ya pɛtɛɛ, “bonkɔ́kɔ” ezali kokɔtisama ya mimeseno mpe bindimeli ya losambo ya bikólo kati na milulu mpe losambo ya Katolike, kopesáká nkombo mpe ndimbola ya sika na milulu, na biloko, na bizaleli mpe na bisika ya kala.

Bonkɔ́kɔ ezali kopesa nzela na bato ya Afrika na kozala bakatolike ya malamu, wana ezali bango kobatela misala, milulu mpe bindimeli ya mangomba na bango ya bikólo. Ntembe ezali mpo na yango? Lokola ndakisa, zulunalo ya Italie La Repubblica etunaki: “Ezali solo te ete na Mpótó Eyenga ya Mbótama eutaki na fɛ́ti ya Solis Invicti oyo ezalaki kosalema na mwa 25 Desɛ́mbɛ, boye te?”

Ya solo, lokola Cardinal Josef Tomko, mokambi ya lisangá ya kopalanganisa nsango malamu epai na bato, amonisaki yango: “Lingomba ya bamisionere epesaki nzela na bonkɔ́kɔ liboso ete liloba yango libanda kosalelama.” Lokola zulunalo La Repubblica emonisaki yango, molulu ya Eyenga ya Mbótama ezali mpenza komonisa likambo yango. Na ebandeli, ezalaki fɛ́ti ya bapakano. Zulunalo New Catholic Encyclopedia elobi ete: “Dati ya 25 Desɛ́mbɛ ezali te dati oyo Klisto abotamaki, kasi ezali nde dati ya fɛ́ti ya Natalis Solis Invicti, fɛ́ti ya Baloma mpo na moi ntango yango emonanaka malamu.

Eyenga ya Mbótama ezali bobele moko ya makambo mingi ya bonkɔ́kɔ oyo euti na bapakano. Ezali mpe bongo mpo na bindimeli lokola Bosato, kozanga kokufa ya molimo, konyokwama ya seko nsima ya liwa. Na ekeke ya 19, Cardinal John Henry Newman akomaki ete “Uta ebandeli, balakisi ya mangomba bamilɛngɛlaki, na ntango libaku emonanaki, ya kokamata, ya komekola to ya kondima milulu oyo mizali mpe mimeseno ya bato.” Na kotángáká molɔngɔ́ molai ya bafɛ́ti mpe ya milulu ya lingomba, amonisi ete “nyonso euti na bapakano, mpe ebulisami na ntango yango endimami kati na lingomba.”

Emonanaka mingi ete bakatolike wana bakómi na bamboka oyo boklisto ezalaki te, lokola na bisika mosusu ya Afrika, bamonaka ete bafandi na bisika wana bazali na milulu mpe na bindimeli lolenge moko na oyo ya lingomba. Ezali bongo mpamba te na boumeli ya bikeke bileki, lingomba ekamataki mimeseno mpe mateya oyo ya bato oyo bazali baklisto te mpe ekɔtisaki yango kati na lingomba ya Katolike. Cardinal Newman alobi ete: mimeseno mpe mateya wana “ebulisamaki ntango yango endimamaki kati na lingomba.”

Yango wana, ntango Pápa Jean-Paul II akutanaki na bamonisi ya mangomba oyo mazali ya boklisto te, na Afrika na 1993, engebene zulunalo L’Osservatore Romano alobaki ete: “Na Cotonou [Bénin, Afrika] nakutanaki na bandimi ya lingomba ya vaudou, lolenge na bango ya koloba emonisaki polele ete, na makambo mosusu, mimeseno na bango, milulu na bango, bililingi na bango, mpe bindimeli na bango esili komonisa na meko mosusu makambo oyo lingomba elingi kopesa bango. Bazali bobele kozela ete moto moko aya mpe apesa bango lobɔkɔ mpo ete básala mbongwana mpe na nzela ya batisimo bázala na bomoi oyo, na maloba mosusu, bazalaki na yango liboso ya batisimo.”

Osengeli kosala nini?

Kozanga kolónga ya lingomba mpo na koteya boklisto ya solo epai na bato ya Afrika ebimisi matomba ya mabe. Kowelana na ntina na bikólo epalangani lolenge moko na bolingi-ekólo bipai binso, kobimisáká kobomana kati na bakatolike. Oyo nde likambo ya nsɔ́ni mpo na Klisto! Biblia ezali kobénga babandisi ya kobomana wana ete “bana ya Zábolo,” mpe Yesu alobi mpo na bango ete: “Bolongwa na ngai, bino bato na misala na lofundo.”​—1 Yoane 3:10-12; Matai 7:23.

Na bongo, bakatolike ya makanisi malamu basengeli kosala nini? Biblia ezali kosɛnga na baklisto ete básala te moko na misala to bindimeli oyo ekokómisa losambo na bango mbindo na miso ya Nzambe. Biblia elobi ete: “Bokangana na ekanganeli na bokɛsɛnɛ tɛ, esika mɔkɔ na bato bajangi kondima.” Mpo na kondimama epai na Nzambe, osengeli ‘kokabwana mpe kosimba te eloko moko oyo ezali mbindo na miso ya Nzambe.’​—2 Bakɔlinti 6:14-17.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 18]

Fɔtɔ́: Jerden Bouman/Sipa Press

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 20]

‘Bitumba kati na Rwanda ezali kobomama monene ya bikólo oyo, na mawa nyonso, ata mpe bakatolike bazali babandisi na yango,’ maloba ya pápa

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto