Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g95 Juillet nk. 20-22
  • Canada: Ankɛ́tɛ likoló na “Makila oyo mazali na mikrobe”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Canada: Ankɛ́tɛ likoló na “Makila oyo mazali na mikrobe”
  • Lamuká!—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bokeseni ya esengo
  • Koteyama ezali na ntina
  • Makila ekobikisa bomoi: ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Makila
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Totambola engebene malako na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Lamuká!—1995
g95 Juillet nk. 20-22

Canada: Ankɛ́tɛ likoló na “Makila oyo mazali na mikrobe”

Euti na mokomani na biso na mboka Canada

NA CANADA, bato oyo bazwi mikrobe euti na makila, bazali kokufa na sida na motuya monene. Mpo na nini motuya monene bongo? Bato ya Canada koleka nkóto moko bazwaki mikrobe ya sida euti na “makila oyo mazali na mikrobe” mpe bankisi ya makila na bambula 1980. Makambo wana ya mawa mapusaki bakonzi ya Leta ete bátya etuluku moko ya bato mpo na kosala ankɛ́tɛ likoló na bisika oyo bapesaka makila na mboka Canada. Ankɛ́tɛ moko ekosalema epai na bato nyonso mpo na komona soki kozongisama makila ezali malamu na mboka Canada.

Moko kati na basambisi bakitani oyo bayebani mingi aponamaki lokola mokambi ya ankɛ́tɛ yango. Ankɛ́tɛ ezali kozwa matatoli na Canada mobimba. Matatoli mabandaki na mokolo mwa 14 Febwáli 1994, mpe Mosambisi Horace Krever ya Esambiselo monene ya Ontario aponamaki mpo na kolobela makambo oyo ye akomona mpe kobongisa lolenge ya likambo yango.

Mama moko oyo mwana na ye ya mobali akufaki na sida azwaki na makila oyo ezalaki na mikrobe amilelaki epai na mosambisi: “Babotoli ngai mwana na ngai mpe mbano nyonso oyo nazwi ezali bobele ankɛ́tɛ oyo. Nabondeli bino, bótalela likambo yango.” Alingaki mpenza komona ete ankɛ́tɛ ya solosolo ekoka kosalema mpo ete bibongiseli ya ntina bikamatama mpo na kopɛngola makámá oyo masangani na kozongisama makila. Azalaki mama bobele moko te oyo akufisaki mwana na makila oyo mazali na mikrobe. Komisyó eyokaki matatoli ya motema mpasi oyo etali likambo wana ya nsɔ́mɔ oyo esili kobebisa bomoi ya bato mingi na mboka Canada.

Mitó ya makambo kati na Globe and Mail, zulunalo ya Toronto, eyebisaki ete: “Nkɛlɛ, mpisoli wana bato bazwami na mikrobe bazali kolobela nsɔ́mɔ ya makila”; “Ankɛ́tɛ ya makila ezali koyoka matatoli ya kobangisa”; “Kozanga boyebi ya minganga elobelami polele”; mpe “Bakonzi bazalaki kotyola likámá ya kozwa bokɔnɔ ya sida.”

Bato oyo bazwaki mikrobe ya sida balobaki ete bakebisamaki te mpo na makámá oyo makokaki kobima. Mbala mingi, baoyo bazwaki mikrobe yango bayaki koyeba ete bazongisamaki makila bobele nsima ya koyeba ete bazali na sida.

Elenge moko oyo azalaki na sida azwaki mikrobe VIH na nzela ya kozongisama makila ntango basalaki ye lipasó ya kofungola motema wana azalaki na mibu misato. Mobali moko oyo azalaki na mikrobe VIH elongo na hémophilie wana ezalaki naino na ebandeli asalelaki bankisi ya makila liboso ya 1984, ntango azalaki mosani ya hockey. Akokaki kobongola lolenge na ye ya bomoi soki ayebaki makámá ya kozongisama makila. Mama moko bazongisaki ye makila oyo ezalaki na mikrobe VIH na 1985, mpe sikawa ye, mobali na ye mpe mwana na bango ya mwasi ya mibu minei bango nyonso bazali na mikrobe yango.

Komisyó eyokaki lisusu makambo ya mawa epai na bato oyo bazwaki mikrobe bobele mpo ete bazwaki unité moko to unité mibale ya makila. Mwasi moko oyo kozongisama makila epesaki mikrobe VIH na mobali na ye, alobi na mawa nyonso ete: “Bobele mpo na kobongisa loposo na ye ya nzoto.” Sikawa ye mpe azali na mikrobe yango.

Wana matatoli mingi mazalaki kopesama, likebi lityamaki na likambo mosusu ya mawa oyo lipalangani mingi​—hépatite euti na makila. Engebene zulunalo The Globe and Mail, ekanisami ete “bato soko 1 000 ya mboka Canada bazali kokufa na hépatite C na mbula moko.” Zulunalo yango ebakisi ete: “Koleka katikati na bango mbala mosusu bazwaki bokɔnɔ yango mpo na kozongisama makila.”

Mobali moko alobaki ete azwaki hépatite C na kozongisama makila ntango basalaki ye lipasó na mokɔngɔ, na 1961. Na nsima ya lipasó na ye, akómaki mopesi ya makila. Na 1993, ayaki komona ete azalaki na cirrhose du foie. Atunaki na etuluku ya bato oyo bazalaki kosala ankɛ́tɛ ete: “Ezali boni mpo na bato oyo bazwaki makila oyo napesaki bongo na boumeli ya bambula nyonso oyo nayebaki te ete nazalaki na bokɔnɔ oyo?”

Mosambisi Krever ayokamelaki na likebi nyonso bato ya Canada koleka nkámá moko oyo bomoi na bango etungisamaki na mikrobe VIH mpe na mpasi oyo eutaki na makila oyo mazalaki na mikrobe. Minganga ya solosolo bamonisi ete ezali mpasi mpo na kopesa makila oyo mazangi mpenza bokɔnɔ mpe makámá mosusu. Bandimaki ete makila ezali na makamá mingi mpe esalelamaka na lolenge mabe. Monganga J. Brian McSheffrey, monganga-mokambi ya esika moko bazongisaka makila, amonisi ete atyaki likebi na likambo yango na kolobáká na mateya na ye ete: “Soki okozongisa moto makila, yango ekomonisa ete ozangi koyeba sikisiki bokɔnɔ yango to lolenge malamu ya kosalisa yango.”

Balobelaki matátá mpe kowelana na ntina na mayele mabe ya politiki kati na bato oyo komisyó ebéngaki ete “bapesi na mabɔkɔ” kati na ebongiseli ya kopesa makila oyo ezwaka badolare ya Canada milió 250 na mbula moko. Balobelaki mabe mingi na ntina na Croix Rouge mpe masangá ya Leta. Moto moko te alingaki komema ngambo ya ebongiseli monene wana ya kopesa makila na mboka mobimba.

Bokeseni ya esengo

Na bokeseni na bilembeteli oyo bizali kopesa motema mpasi, lapólo moko ya kosepelisa eyebisamaki liboso na Mosambisi Krever na mokolo mwa 25 Máí 1994, na Regina, Saskatchewan. William J. Hall, mobali moko ya mibu 75, oyo azali na hémophilie makasi, alobelaki lolenge alóngaki na kosalela myango ya bankisi oyo ezongisaka makila. Mpe azali na sida te. Lokola azali Motatoli ya Yehova, Mr. Hall aboyaki makila mpe bisaleli ya makila mpo na lisosoli na ye na ntina na makambo ya losambo.​—Talá etánda na lokasa 22.

Ankɛ́tɛ esukaki wana te. Bakonzi ya Leta bapusi yango kino na nsuka ya mobu 1995. Na bongo, komisyó ekozwa ntango ya kotalela mwango ya kosalisa kozanga kosalela makila oyo masalelamaka na bolóngi mpenza epai na ebele ya mikóló mpe bilenge oyo bazali Batatoli ya Yehova. Myango yango mikoki kosalelama mpe epai na bakɔni mosusu.

Minganga oyo basalelaka myango lolenge wana bazali na bilembeteli mingi ya ntina mpo na kopesa epai na bato ya komisyó. Monganga Mark Boyd ya Eteyelo monene McGill alobaki na zulunalo The Medical Post na 1993 ete: “Tosengeli mpenza kozala na botɔ́ndi epai na Batatoli ya Yehova mpamba te balakisi biso lolenge tokoki kolónga kozanga kosalela makila.” Komisyó moko ya prezidansi ya États-Unis elobaki na 1988 ete: “Meko ya solosolo mpo na kokamata na ntina na makila ezali ya kopɛngola kotya mokɔni makila ya bato mosusu, ezala ata likámá nini.” Na kotosáká mobeko ya Nzambe oyo etali “koboya makila . . . ,” Batatoli ya Yehova basili kopambwama mpe basili kozwa “meko ya solo mpo na komibatela” na makila oyo mazali na mikrobe mpe na makámá mosusu oyo mautaka na kozongisama makila.​—Misala 15:20, 29.

Koteyama ezali na ntina

Likambo ya mawa, bato mingi oyo bazwaki mikrobe oyo euti na kozongisama makila bayebaki myango te oyo mikokaki kosalisa bango ete bápɛngola bampasi na bango. Bapesaki bango liponi te ya kosalela lotómo bazali na yango​—ya kondima makámá ya makila to ya kosalela myango mosusu ya malamu.

Matatoli oyo mapesamaki liboso na komisyó mamonisi ete mposa ezali mpo na koteya minganga mpe bato mosusu mpo na myango oyo mikoki kosalelama kozanga kozongisama makila. Ankɛ́tɛ monene ya lolenge wana, oyo etambwisami na bakonzi ya Leta ekoki kozala na bopusi makasi na mboka Canada. Makanisi ya Mosambisi Krever makoki kopesa nzela na mbongwana oyo esengeli kati na bizaleli mpe mateya kati na makambo matali monganga mpo na myango ya kozongisama makila na mboka Canada. Makambo oyo komisyó ya ankɛ́tɛ ekozwa makozala na litomba mpo na baoyo nyonso balingi kopɛngola makámá oyo mauti na kozongisama makila.

[Etanda na lokasa 22]

HÉMOPHILIE ESALISAMI KOZANGA KOSALELA MAKILA

William J. Hall ya engumba Nipawin, na Saskatchewan, ayebisaki na komisyó lolenge nini mpe mpo na nini asalisaki hémophilie na ye ya makasi kozanga kosalela bankisi ya makila. Talá mwa makambo malandi kati na litatoli na ye:

◻ “Baboti na ngai bayaki koyeba ete nazalaki na hémophilie ntango navimbaki longwa na mosapi na ngai ya lokolo kino na loketo na mbala moko mpe minganga batalaki yango mpe balobaki ete ezalaki hémophilie. . . . Nakanisi nazalaki soko na mobu moko.”

◻ “Nazwaki soko moke te makila to lolenge ya nkisi moko ya makila. . . . Yango ezali na boyokani te na bindimeli na ngai ya losambo, mpamba te namonaka ete makila ezali mpenza eloko ya bulɛɛ.”

◻ Mpo na ndeko na ye ya mobali oyo mpe azalaki na hémophilie alobi ete: “Azalaki na kondima motindo moko na ngai te, na bongo bazongisaki ye makila mpe akufaki na bokɔnɔ ya hépatite.”

◻ Mpo na ntina na kansɛr ya duodénum na 1962, abakisi: “Monganga alobaki ete soki nasaleli makila te, nakokufa. . . . Basalisaki ngai malamu kati na lopitalo [kozanga kosalela makila].” Kobima ya makila esilaki.

◻ Mpo na lipasó oyo esalemaki na 1971 mpo na kokangisa loketo oyo ebukanaki: “Ezalaki mpenza lipasó ya likebi makasi kozanga kosalela makila. . . . Lipasó yango lilekaki malamu.” Baekzamɛ́ mingi ya makila na ntango wana emonisaki ete facteur VIII (eloko oyo ekangisaka makila) ezalaki te kati na makila na ye.

◻ Motindo asalaki: “Lolenge ya bomoi . . . ezalaki kosala na likebi.” Azalaki kotya likebi mpo na biloko ya kolya, komipemisa malamu, kosala ngalasisi mpe kosalisa na likebi nyonso kobima ya makila, kovimba mpe bampota.

◻ “Nazali kominanola mpe komanyola likoló na makambo ya malamu oyo Nzambe na biso apesi biso mpo na kobosana mitungisi na biso. Yango esalisaka ngai mingi.”

William Hall azali na mibu 76 mpe azali Motatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 20]

Mosambisi Horace Krever, Mokambi ya komisyó

[Eutelo ya bafɔtɔ]

CANPRESS PHOTO SERVICE (RYAN REMIROZ)

[Elilingi na lokasa 21]

William mpe Margaret Hall batambolaki bakilomɛtɛlɛ 370 mpo na kokutana na komisyó ya ankɛ́tɛ

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto