Lisasi libongolaki bomoi na ngai
LIKABO lileki malamu oyo baboti bakoki kopesa na bana na bango ezali bongo kokɔtisa kati na bango boyebi ya Mozalisi mpe mposa ya kosalela ye. Likambo ya nsɔ́mɔ oyo likómelaki ngai wana nazalaki naino elenge lisalisi ngai na komonisa motuya ya solo yango.
Liboso ete nayebisa bino likambo oyo lisalemaki—esili koleka mibu 20—tiká ete nayebisa bino mwa moke na ntina na bomoi na ngai wana nazalaki kokóla na súdi ya États-unis. Yango epesaki ngai nzela ete nayika mpiko na mikakatano ndenge na ndenge.
Likambo oyo lisalaki bopusi na bomoi na ngai
Nabotamaki na engumba Birmingham, na etúká Alabama—na eteni ya súdi ya ngɛlɛ́ epai kuna ezalela ya kokabola mposo ezalaki konginda—na Yanuáli 1955. Wana nazalaki bobele na mibu mwambe ya kobotama, bombe moko ekweaki pene na ndako na biso mpe ebukaki ndakonzambe moko ntango kelasi ya lomingo ezalaki kosalema. Bana ya baindo babangaki mingi, mingi oyo bazalaki na mbula na ngai, bakimaki mbangu na kogangáká; basusu batondaki na makila mpe bazalaki kokimela. Minei bakufaki—babomamaki na mindele.
Makambo ya nsɔ́mɔ motindo wana mazalaki kosalema mingi na eteni ya súdi. Na eleko ya molungé oyo elandaki, bato misato oyo bazalaki kosala na biro ya makambo matali ntómo ya bato, babomamaki na Mississippi. Mikolo wana ya kobanga koleka ya mobulu mouti na ezaleli ya kokabola mposo mitungisaki biso banso.
Mama na ngai azalaki Motatoli ya Yehova mpe tata na ngai akómaki Motatoli ya Yehova na 1966. Mosika te, libota na biso mobimba likómaki kokabola elongo na bazalani elikya na biso oyo ezwami kati na Biblia oyo etaleli mokili ya sika kati na kimya. (Nzembo 37:29; Masese 2:21, 22; Emoniseli 21:3, 4) Na boumeli ya bileko ya molungé ya mibu ya 1960, mikolo nyonso ya pɔ́sɔ, tozalaki kokende kosakola na teritware oyo esakolamaki naino te mosika na Birmingham. Kuna, bato bayokaki naino te kolobela na ntina na Batatoli ya Yehova to na ntina na nsango ya Bokonzi ya Nzambe. Bayebaki kutu te nkombo ya Nzambe, Yehova. (Nzembo 83:18) Na boumeli ya ntango wana ya mobulungano, nazalaki mpenza kosepela kosolola na bato mpo na mokano na ye ya kokitinya mokili oyo mobebisami na paladiso.—Luka 23:43.
Namityeli mokano na bomoi na ngai
Na Desɛ́mbɛ 1969, napesaki bomoi na ngai epai na Yehova na kozwáká batisimo ya mai. Nabondelaki mpe na nayebisaki ye mposa na ngai ya kosala mosala ya ntango nyonso. Nsima ya mwa bapɔ́sɔ, tata apesamelaki mokumba ya kopesa mabɔkɔ na lisangá moko ya moke oyo lizalaki na engumba Adamsville, mosika ya mwa bakilomɛ́tɛlɛ longwa na Birmingham. Mbongwana wana ya teritware ekólisaki mposa na ngai ya kozala mobongisi-nzela, mosali ya ntango nyonso. Na bantango mosusu wana nazalaki na eteyelo ya ntéi, nazalaki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, oyo esalaki ete nalekisaka bangonga 75 to koleka kati na mosala ya kosakola sanza na sanza.
Nazwaki ekateli ya koyekola mosala moko mpo na komilengela na mosala ya ntango nyonso nsima ya kozwa lipolómi. Kasi, na mobu ya nsuka ntango nazalaki na kelasi ya ntei, nakutanaki na momekano. Nazalaki kati na etuluku ya bayekoli oyo bazwaki lipolómi mpe na yango, mokolo moko batindaki ngai na eteyelo moko ya monene mpo na kosala mamekani ya kokɔta kuna. Na nsima, babengisaki ngai na biro ya mokambi ya eteyelo. Akamwaki mpe asepelaki mingi mpo na ngai. Alobaki ete: “Osali malamu mingi koleka! Okoki kokɔta na eteyelo monene oyo yo olingi!” Alingaki ete natondisa lokasa ya kozwa burse bobele na ntango yango.
Natungisamaki mingi pamba te namibongisaki te mpo na yango. Nokinoki, nalimbwelaki ye mokano na ngai ya kokóma mosali ya ntango nyonso mpe kolanda kosala mosala ya mosuni na mwa bangonga mpo na kokokisa bamposa na ngai kati na mosala yango. Kutu nayebisaki ye ete na nsima, lokola Batatoli mosusu basili kosala yango, nakoki kosala lokola misionere na mboka mopaya. Nzokande, aboyaki mpenza koyoka ngai. Alobaki na ngai ete nazwa kobongisama na mateya ya siansi mpe ete soki nakɔti na eteyelo moko ya engumba, akosala ete nazwa mosala na centre moko.
Alobaki na ngai ete: “Gloria, salá makambo na yo ya losambo na bawikende, baboti na yo bakosepela ntango nyonso na yo.” Epesaki ngai mpasi pamba te akanisaki ete baboti na ngai nde bazalaki kopusa ngai mpo ete nasala mosala ya ntango nyonso. Amekaki kolengola ngai na kolobáká ete lokola naboi libaku wana ezali nde lokola naboi kosunga bato nyonso ya lomposo moindo. Nzokande, natikalaki ngwi na etɛlɛmɛlo na ngai. Nsima ya kozwa lipolomi, na esika ya kosala kelasi ya monene, nabandaki kosala mosala ya mokomeli na ndambo ya mokolo.
Nalukaki moninga mpo na mosala ya mobongisi-nzela, kasi nazwaki te. Ntango mokɛngɛli-motamboli ayaki kotala lisangá na biso, nayebisaki ye mokakatano na ngai. Alobaki na ngai ete: “Esengeli te ete ozala bobele na moninga.” Na nsima, asalaki manáka oyo makokaki kopesa ngai nzela na kokokisa mikumba na ngai ya mosala ya mosuni mpe kozwa ntango ya kosala mosala ya mobongisi-nzela. Namonaki ete manáka yango mazalaki malamu. Nasepelaki mingi na boye ete natyaki 1 Febwáli 1975 lokola dati na ngai ya kobanda mosala ya mobongisi-nzela.
Likambo ya mawa mpenza, nsima ya mwa mikolo, na mwa 20 Desɛ́mbɛ 1974, wana nazalaki kouta na butiki mpo na kozonga na ndako, lisasi moko lizwaki ngai.
Nakómaki pene na kokufa
Wana nalalaki na mabelé, nazalaki komona ndenge makila na ngai mazalaki kotanga. Nazali komikundola ete nakanisaki ete nakokufa. Nasɛngaki na Yehova ete atika ngai naino na bomoi mpo na kopesa nzela na mama na ngai ayeba ete makámá mabe motindo wana makoki mpe kokómela ata libota oyo limipesi mobimba na kosalela Yehova. Atako tomesanaki na mokapo ya Biblia oyo elobi ete: “Ntango mpe makambo makanamaki te makokwelaka bango nyonso,” nakanisaki te ete tobongisamaki mpo na kokutana na likámá ya nsɔ́mɔ motindo wana.—Mosakoli 9:11, NW.
Lisasi lizokisaki ngai na nkingo, na eteni ya lobɔkɔ ya mwasi, kosusinyáká misisa ya moelle épinière. Nazalaki na mokakatano ya koloba mpe ya kopema. Minganga bakanisaki te ete nakoki koumela lisusu na bomoi koleka mikolo mibale. Na nsima, balobaki ete nakoki kosala “pɔ́sɔ mibale.” Kasi nakóbaki kozala na bomoi. Lokola nazwaki pneumonie, batyaki ngai na masini moko makasi ya mpema. Na nsuka, nzoto na ngai ebongaki mpe myango mikamatamaki mpo na kobongisama mosusu.
Mimekano na ntango ya kosalisama
Na boumeli ya bapɔ́sɔ ya liboso, nazalaki kolɛmba nzoto te. Namiyokaki nde konyela. Bato nyonso kati na centre ya kobongisama ya Birmingham bazalaki boboto mpe basalaki mingi mpo na ngai. Basali na lopitalo bayebisaki ngai ete minganga bakanisaki ete nakonyela nzoto mobimba mpe nakolala na mokɔngɔ na bomoi na ngai mobimba. Batyaki ngai na esika ya bato ya tétraplégiques C2, oyo elimboli bakanisaki ete nakotyama kati na masini ya mpema na boumeli ya bomoi na ngai mobimba, nakozala na likoki ya koloba te bobele komima.
Minganga batyaki ngai sɔ́ndɛ moko na lisalisi na yango nde nazalaki kopema. Na nsima, monganga akutolaki bolai ya mompépé yango mpo na koyeba soki ekopesa ngai nzela ya koloba. Kasi esalaki eloko moko te. Na bongo, basukisaki ete mokakatano na ngai mpo na koloba moutaki na kobeba ya misisa ya moto. Na ntango wana nde nabandaki kotungisama na makanisi mpe likambo moko te oyo moto akokaki koloba ekokaki kosepelisa ngai. Maloba nyonso ya boboto mazalaki kopesa ngai nkanda lokola ezalaki nde mafinga. Na yango, nazalaki kolela mingi.
Nayaki komona ete soki likambo moko lizali kotungisa elimo na biso, makambo oyo mibale makoki kopesa lisungi—kobondela Yehova ntango nyonso mpe komipesa mingi na mosala ya kosakola, koyebisáká basusu basolo ya Biblia. (Masese 3:5) Ya solo, kobondela ezalaki na mokakatano te. Nakokaki kosala yango. Kasi, ndenge nini nakokaki, kati na ezalela na ngai ya motindo wana, kosala mingi kati na mosala ya kosakola?
Nasɛngaki na libota na ngai bamemela ngai bazulunalo: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! mpe mikanda misusu mikolimbolaka Biblia oyo tozalaki kosalela kati na mosala ya kosakola, lokola Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko, Kimya ya solo—ekouta wapi? mpe Nyonso ezali kosuka na bomoi oyo? Mikanda yango mityamaki na bisika bikeseni kati na eteni na ngai ya ndako na lopitalo. Basali na lopitalo mbala mingi bazalaki kotala ngai na boboto mpe kotuna: “Molingami, ezali na eloko moko oyo nakoki kosala mpo na yo?”
Nazalaki kobalola miso epai mokanda moko ezalaki mpe na mpema nyonso, nazalaki kosɛnga ete bátangela ngai yango. Nazalaki kotánga ngonga oyo moto yango akolekisa na kosaláká botángi, yango ezalaki ngonga na ngai ya mosala ya kosakola. Mpo na komonisa botɔ́ndi na ngai epai na moto oyo asaleli ngai botángi, nazalaki mbala mingi kopesa ye mokanda to zulunalo lokola likabo. Nazalaki kotánga yango lokola lipesi ya sanza. Soki moto moko asaleli ngai botangi mpo na mbala ya mibale, nazalaki kotánga yango lokola bozongeli. Kosaláká bongo mpo na mosala ya kosakola, ezalaki kolendisa ngai lolenge moko na bakálati ya kobɔndisa motema mpe bafololo oyo bazalaki kotindela ngai, mpe bandeko baklisto basi mpe mibali mingi oyo bazalaki koya kotala ngai.
Nsima ya basanza ya kosalisama, nazalaki na likoki ya kotombola motó bobele mwa moke. Kasi nazwaki mpenza ekateli ya kokólisa makoki na ngai ya koningana. Na bongo, nasɛngaki ntango mingi lisusu mpo na kobongisama mpe ergothérapie. Ntango nasɛngaki ete bátya ngai na kiti ya kotambola, bayebisaki ngai ete ekobonga te, nakokoka soko moke te kotya motó na ngai likoló mpo na kofanda. Nasɛngaki ete bameka ata bongo.
Nsima Ya kozwa ndingisa oyo epesamaki na minganga, monganga oyo azalaki na mokumba ya kotalela ngai asalisaki ngai mpo na kofanda na kiti ya kotambola. Bazingaki nzoto na ngai na babándi kobanda na ntólo kino loketo, kobanda na ngei kino mabolongo mpe kobanda na mabolongo kino makaka. Nakómaki lokola ebembe oyo batye nkisi. Yango ezalaki mwango mpo na kopesa nzela na makila ete mátambola na lolenge ya malamu mpe kopengola mabaku. Esalaki malamu! Nzokande, napesamelaki nzela ya kofanda bobele na boumeli ya ngonga moko na mbala moko. Kasi nafandaki—nsima ya kolala na mokɔngɔ mikolo 57!
Nsukansuka, nazongaki na ndako!
Na nsuka, nsima ya basanza milai mitano, balongolaki ngai sɔ́ndɛ wana mpe bapesaki ngai ndingisa ya kozonga na ndako. Yango ezalaki na sanza ya Máí 1975. Na nsima, nazalaki kokenda mpe kozonga na lopitalo mpo na kosalisama. Na ebandela ya eleko ya molungé ya 1975, nabandaki kokenda na mosala ya kosakola na kiti na ngai ya kotambola. Nazalaki kosala mingi te, kasi nde nazalaki kokenda kuna elongo na baninga Batatoli.
Na ebandeli ya mobu 1976, babéngaki ngai na Centre de réadaptation professionnelle, ebongiseli oyo ezalaki kofuta mosolo mpo na ngai na ntango ya kosalisama. Nakanisaki ete nazalaki kobonga. Nayekolaki kokembisa mayemi na lisalisi ya brɔ́si oyo nazalaki kokangisa na míno. Kosaleláká nzeté na lolenge yango, nabandaki kobeta mikanda mpe ata kokoma na kiliyɔ. Lokola ebongiseli wana ezalaki kofuta mosolo mingi mpo na kosalisama na ngai, bazalaki koluka mwango ya kozwela ngai mosala mpe mpo na kokóma moto oyo azali kobota mbuma kati na mokili.
Na ebandeli, mopesi-toli amonanaki ete azalaki kososola ngai malamu, kasi abandaki kosɛnga na ngai ete namekaka koloba makasi. Na ntango wana nakokaki bobele koloba mwa moke likoló ya komimisana. Na nsima atunaki ngai ete: “Okoki kofanda semba?”
Nakokaki te.
Alobaki lisusu ete: “Tombolá bobele mosapi moko.”
Wana nakokaki ata kosala yango te, abwakaki biki na ye likoló ya mesa mpe alobaki na nkanda ete: “Ozali na ntina moko te!”
Ayebisaki ngai ete nazonga ndako mpe nazila kino mokolo akobénga ngai na telefone. Nasosolaki mokakatano na ye. Mokɔni moko te liboso na ngai na lopitalo wana azalaki na maladi lokola oyo ya ngai. Motuya ya bisaleli oyo basalelaki kuna ezalaki mosolo mingi mpenza mpe mokambi oyo azalaki kozwa bikateli azalaki na malako te mpo na oyo asengelaki kosala na mokɔni ya mokakatano makasi mpo na koningana lokola ngai. Nzokande, epesaki ngai mpasi mingi ndenge alobaki na ngai ete nazali na ntina te, lokola nazalaki kokanisa yango.
Nsima ya mwa mikolo, nazwaki mbela na telefone mpe bayebisaki ngai ete nazalaki lisusu kati na manáka wana te. Namiyokaki ete nabwakami. Mpe ezindisaki ngai lisusu na kotungisama na makanisi.
Nalóngi mokakatano ya kotungisama na makanisi
Na nsima nakanisaki likoló na mokapo ya Nzembo 55:22, oyo elobi ete: “Kitisa mokumba na yo epai na [Yehova] mpe ye akokumba yo.” Likambo moko oyo nazalaki komitungisa na yango ezalaki mokumba ya mosolo oyo ezalaki likoló ya baboti na ngai, mpe nabondelaki mpo na yango.
Lokola kotungisama na ngai na makanisi esalaki bopusi mabe na nzoto, na yango, na boumeli ya liyangani ya etúká na eleko ya molungé wana, nazalaki na likoki ya kofanda te. Nalandaki liyangani bobele na kolala. Mosala ya mobongisi-nzela mosungi molobelamaki na ntango ya liyangani wana na 1976 mpe yango ebendaki likebi na ngai. Mpo na kosala lokola mobongisi-nzela mosungi esɛngi kolekisa bobele bangonga 60 na sanza, mwayene ya bangonga 2 na mokolo. Namonaki ete nakokaki kosala yango. Na nsima, nasɛngaki na lɛki na ngai ya mwasi Elizabeth ete asalisa ngai mpo na kosala lokola mobongisi-nzela mosungi. Akanisaki ete nazalaki kosala masɛki, kasi ntango natondisaki lokasa ya lisɛngi mpo na kosala lokola mobongisi-nzela mosungi na Augústo, ye mpe atondisaki lokasa ya lisɛngi mpo na ye.
Elizabeth azalaki kolamuka na ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mpe kolengela ngai. Na nsima tozalaki kobanda kopesa litatoli na telefone. Yango ezalaki kosɛnga kobénga bato na telefone mpe kosolola na bango na ntina na mapamboli oyo Nzambe alaki mpo na bato na nsé ya boyangeli ya Bokonzi na ye. Tozalaki mpe kotinda nkomá, mingimingi epai na bato oyo bazalaki na mposa ya kobɔndisama. Na bawikende, na kiti na ngai ya kotambola, libota na ngai to baninga Batatoli bazalaki kokamata ngai mpo na mosala ya ndako na ndako. Ya solo, lokola nazalaki kosalela binama na ngai te, nazalaki bobele koloba na ntina na nsango ya Bokonzi, kotánga mikapo, to kosɛnga na moto mosusu ete atánga yango na Biblia.
Na mokolo ya nsuka ya sanza, nazangaki bangonga 6 mpo na kokokisa lisɛngami ya bangonga 60. Elizabeth azalaki na likoki te ya kosunga ngai, na bongo, nasɛngaki na mama ete atombola etyeli-mokɔngɔ ya kiti na ngai mpo ete nakoka kofanda semba. Na nsima, na kosaleláká nzeté ya monɔkɔ, nabetaki nkomá na boumeli ya bangonga motoba. Nyonso elekaki malamu, kasi nazali komikundola ete nalɛmbaki mingi mpenza!
Libondeli na ngai lindimami
Na pɔ́sɔ oyo elandaki, kofandáká semba na kiti na ngai ya kotambola, nakendaki kominanola na Centre espagnol de rééducation. Monganga na ngai, oyo amonaki ngai lisusu te kobanda balongolaki ngai na manáka na ebandeli ya mobu, akamwaki mingi. Azalaki kondima te mpo na lolenge nakómaki. Atunaki ngai ete: “Ozali kosala nini?” Kutu liboso ete nasilisa koyebisa ye na ntina na mosala na ngai ya kosakola, alaki ngai mosala.
Mokitani na ye atunaki ngai mituna mpe akamwaki mingi na oyo nazalaki kosala kati na mosala ya kosakola. Asɛngaki na ngai ete nasala na oyo babéngaka manáka ya kosunga mokɔni. Mpo na yango nasengelaki kosunga mokɔni mosusu. Kotaleláká mosala na biso, alobaki ete: “Oyo ezali mpenza mosala oyo bato na bino basalaka, boye te?” Bapesaki ngai mosala ya kotalela mokɔni moko oyo azalaki lolenge moko na ngai.
Basali na lopitalo bayokaki nsango na ntina na oyo nazalaki kokokisa kati na mosala ya kosakola na lisalisi ya libota na ngai. Bakamwaki mingi mpenza na boye ete bazwaki ekateli ya kozongisa ngai na manáka ya kobongisama. Yango elimboli ete libota na ngai likozwa mosolo ya kofuta mpo na bisaleli mpe bamposa ya ntina mpo na kokóba mosala na ngai. Namonaki mpenza ete Nzambe ayanolaki na mabondeli na ngai.
Kolɔ́ngɔ́nɔ́ na ngai ezongi malamu
Kolongɔ́nɔ́ na ngai ezongi malamu na boye ete nakoki kotombola motó, kobalola yango mpe kofanda. Likambo ya esengo, nazongeli sikawa pene na likoki nyonso ya koloba. Kosaleláká nzeté na monɔkɔ, nakoki kokoma mpe kobeta nkomá, kosolola na telefone mpe koyema. Mayemi na ngai mosusu malakisamaki na bisika oyo balakisaka mayemi oyo mayemami na monɔkɔ. Namitambwisaka na kiti ya kotambola oyo natambwisaka yango na ebɛku. Etomboleli ya lontiliki etombolaka kiti na ngai kati na motuka na biso ya moke mpe na yango nakoki kokende bipai binso nalingi.
Nasilaki kozwa mikakatano mingi mpo na kopema—oyo etungisaka ngai mingi ezali pneumonie. Mbala mosusu nasɛngaka mopɛpɛ na butu. Na 1984, nakómaki pene na kokufa mpo nazwaki infection. Nakendaki lopitalo mbala na mbala. Kasi sikawa kolɔngɔ́nɔ́ na ngai ezongi malamu. Kobanda na mobu 1976, namekaka kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mbala moko to mbala mibale na mbula. Kasi, namonaki ete yango ekoki te. Nakóbaki kokanisa na ntina na mokano na ngai ya bolenge oyo mobulunganisamaki na lisasi.
Mokano na ngai mokokisami
Na mwa 1 Sɛtɛ́mbɛ 1990, nakɔtaki sikawa na molɔngɔ́ ya babongisi-nzela ya sanza na sanza, yango ekokisi mposa na ngai ya bomwana. Na ntango ya eleko ya mpiɔ wana malili ezali, napesaka litatoli na kotindáká nkomá mpe na nzela ya telefone. Kasi soki molungé ezali, nakendaka mpe na mosala ya ndako na ndako. Na boumeli ya mobu mobimba, natambwisaka boyekoli ya Biblia longwa na ndako na lisalisi ya telefone.
Nazali kozila na motema likoló mikolo kitoko mizali koya kati na paladiso awa na mabelé ntango Klisto Yesu mpe Yehova Nzambe bakolongola ngai na kiti oyo. Mokolo na mokolo napesaka Yehova matɔ́ndi mpo na bilaka na ye bitaleli kolɔngɔ́nɔ́ malamu ya nzoto mpe likoki ya “kopumbwa lokola mboloko.” (Yisaya 35:6) Nakopota mbango kino nakokokisa bambula nyonso oyo nalekisi kozanga likoki ya kopota, mpe na nsima nakoyekola kotambola na mpunda.
Koziláká ntango yango, nazali sikawa na esengo oyo ekoki kolobelama te ya kozala moko kati na libota ya Yehova ya esengo mpe kosanganáká kati na mosala ya kosakola.—Lisoló ya Gloria Williams
[Bililingi na lokasa 15]
Kati na mosala ya kosakola—kokenda ndako na ndako, kopesa litatoli na telefone mpe na nkomá
[Elilingi na lokasa 16]
Mayemi na ngai malakisami kati na bisika balakisaka mayemi mayemami na monɔkɔ